ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Etumba kati ya bato ya Palestine pe Isra?l Etumba kati ya bato ya Palestine pe Isra?l  (AFP or licensors)

Biyamba ya bakristu ya France bakosenga kimia na Gaza pe na Cisjordanie

Na liloba (d¨¦claration) moko ya lisanga, bakambi misato ya biyamba ya bakristu ya France bakobenga kimia moko ya ¡°solo pe ekowumela¡± pe bakosenga botosi ya s¨¦mbo po ya bato na Isra?l, na Gaza pe na Cisjordanie. Dimitrios, mokambi ya ba episkopo ya ba orthodoxe, mobateli Christian Krieger, mokambi ya eyamba ya ngelesa, pe Mgr Eric de Moulins-Beaufort, mokonzi ya lisanga ya ba episkopo ya France batiaki maboko na liloba elobamaki mokolo ya liboso ya 25 ya sanza ya mitano.

Jean-René B.- Kinshasa

Mikolo mizali koleka pe motango ya bato bazali kozoka mpota pe kokufa na etuka ya Gaza, banda Israël azongisa etumba kuna sima ya mobulu ya bato ya Hamas ya mokolo ya 7 ya sanza ya zomi ya 2023. Israël akobwaka ba bombe na Gaza tango babundi ya Hamas bazali kobombana kati na ba civil.

Liboso ya etumba ena bakambi misato ya biyamba ya bakristu ya Frannce batomboli mongongo po  na bosengi kimia na Israël, na Gaza pe na Cisjordanie. Dimitrios, mokambi ya ba episkopo ya ba orthodoxe, mobateli Christian Krieger, mokambi ya eyamba ya ngelesa, pe Mgr Eric de Moulins-Beaufort, mokonzi ya lisanga ya ba episkopo katoliko ya France batiaki maboko na liloba elobamaki mokolo ya liboso ya 25 ya sanza ya mitano.

Botiki ba otage

Na bolobeli biteni mibale baye bazali na etumba, basengi botiki ya ba otage pe bozongisi nzoto ya bawei, po mabota na bango ¡°bikoka kokunda bango na lolenge esengeli¡±. Ba otage batikali 58 na etuka ya Gaza, po na Israël 34 kati na bango basila kokufa.

Po na kobimisa bango, Israël aboyi kotika kobeta masasi. Mokolo ya liboso eye, koleka bato 33 babomaki bango pe ata zomi bazokaki o eleko Israël abwakaki ba bombe na Gaza, elobaki lisanga moko ya Gaza. Po na Israël, ezalaki ¡°bato ya mobulu ya makasi¡± bazalaki na ¡°esika moko ezalaka eteyelo kala¡±. Mokambi ya mosala etalaka likambo ya bokolongono bwa nzoto, eye ekambemi na Hamas, elobi ¡®te bato 53.939 bakufi pe 122.797 bazoki bapota kobanda mokolo ya 7 ya sanza ya zomi 2023.

Botosi ya sémbo po ya bato

Na boyebi nini ekoleka po na ba milio ya bato na Gaza tango Israël azali kobwaka ba bombe, bilama ya biyamba ya bakristu ya France ¡°bapesi lolaka na bango na baye, bana pe mikolo, bazali koyoka pasi na nzala, baye bazangi nsámba (toit) pe bobateli, baye bakoluka ¡®te bana na bilenge bakoka kotanga na kimia¡±.

Na bolobeli mpenza bakonzi ya mokili, bakambi ya biyamba ya ba orthodoxe, ngelesa pe katoliko ya France balendisi bakonzi baye po ¡°na kosala zambi ya kimia moko ya solo pe ya kowumela¡±, na bobeti nsete na oyo etali botosi ya sémbo ya bato.

Bakambi ya biyamba misato ya bakristu ya France basukisaki liloba na bango na kosambela ¡®te ¡°Nzambe abimisa basali ya kimia ya molende pe ya bwanya¡±.  

27 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 13:58