Eyenga ya Mandalala ya makila na Ukraine: Visvaldas Kulbokas, ntoma ya Papa wa Roma, alobi
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Balingaki kosambela, kasi bazui liwa. Eyenga ya mandalala ebebaki na makila na Sourny, na nordi-esti ya Ukraine, na kilometre 50 ya ndelo na Russie. Etuka eye ezuaki mobulu esalemaki na ba russe na bobomi bato na moke 34, bana mingi kati na bango, pe bato bazoki na moke 117, na kati na bango bana 15. Missile balistique mibale ebetaki na kati ya etuka na ngonga ya zomi ya tongo, nzokande bandimi, batondaki na ba nzela po na eyenga ya Mandalala, bazalaki kosangana po na misa eye ekolakisa bokoti ua bakristu na Poso Esantu. Bilili bikolakisa makambo ya somo, ba nzoto bitandami na ba nzela pe ba pompier bazali komeka koboma moto na ba mituka kati na mabanga ya ba ndako bipanzani.
Ntoma Kulbokas, liwa na nzela ya losambo
¡°Etikali kaka tobalusa miso epayi ya Mokonzi¡±, wana ezali mbela ya ntoma ya Papa wa Roma na Kiev, Mgr Visvaldas Kulbokas: ¡°Lokola boyebi, mobu moye, tokosepela Pasika lisanga lokola manaka ya grégorien pe manaka ya Julien¡±, elobaki ye na bapanzi nsango ya Vatican. ¡°Lelo, ezalaki eyenga ya Mandalala. Ata na Sourny, bandimi, ya biyamba lolenge na lolenge, bazalaki kokende o ndako ya Nzambe po na kosambela. Koleka bato 30 babomi bango na mobulu eye ebetaki kati ya etuka. Ezali ebandeli ya Poso Esantu pe etikali kaka totala epayi ya Mokonzi po abatela biso, po emonani tè nguya mosusu ezali te eye ekoki kobatela boboto pe bomoi. Tika tè Mokonzi ayoka biso mawa¡±, elobaki ntoma ya Papa.
Lisanga ya Bikolo ya Poto: crime mosusu ya etumba
Mobulu ya eyenga eye na etuka ya Sourny ezali ya mibale ya monene na motango ebele ya bato bakufi na ndambo ya mikolo, sima ya bobwaki missile na etuka epayi wapi mokonzi ya Ukraine abotama, Kryvyi Rih, eleki poso moko, ebomaki bato ntuku mibale, bana libwa kati na bango. Ntoma ya Lisanga ya bikolo ya Poto, Katarina Mathernova, abengaki ¡°mobulu ya somo ya ba russe¡± epayi ya Sourny ya ¡°crime ya sika ya etumba¡± na molongo moko ya molayi.