ÐÓMAPµ¼º½

Luka

FILES-SUDAN-CONFLICT-ANNIVERSARY FILES-SUDAN-CONFLICT-ANNIVERSARY  (AFP or licensors)

Caritas abuaki mbela mosusu po ya boboto na Sudan

Uta mibu mibale, bato ya Sudan bazali na pasi koleka, emoni ONU. Mokolo 15 ya sanza ya minei, o eleko ya bokanisi mobu moko ya ebandeli ya etumba, Caritas Internationalis abeleli lisusu mokili mobimba po na kosunga baye bazali kobunda na bobandi masolo. ¡°Na bozangi kimia, makambo bikokoma mabe makasi¡±, elobi Christian Modino Hok, directeur humanitaire.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

¡°Ezali mokakatano ya koleka makasi na mokili¡±, Lokola Caritas Internationalis na nzela ya directeur humanitaire Christian Modino Hok, masanga nionso ya mokili bikobwaka mbela po na ezaleli ya bato na Sudan.  Koleka bato milio 30, elingi koloba koleka katikati ya bato banso ya Sudan basenegli na lisungi na lombangu. Na mokanda y¡¯Agelus ebimaki mokolo ya eyenga 13 ya sanza ya minei, Papa François alobaki ¡°pasi ya bana, ya basi pe ya bato bazali kokelela ekoganga epayi ya Nzambe pe ekobondela biso tosala¡±.    

Uta mibu mibale, ekolo ezali esika ya etumba eye ekobebisa kati na limpinga ya général Abdel Fatah al-Burhane, oyo azuaka bokonzi na makasi na 2021 o eleko ya coup d¡¯Etat, na ba paramilitaires ya mampinga baye bazali kotosa molandi na bango ya kala, général Mohamed Hamdan Daglo.

Bosukisi etumba

Na communiqué moko ya lisanga, masanga mingi ya bakristu bakobelela na mokili mobimba, na bomoni tè « akoki kokoba kokanga miso te na oyo etali Sudan ». Baye batiaki mokoloto na communiqué, kati na bango Caritas Internationalis, ACT Alliance, bakobianga baye bazali kobunda na bosololi pe na kosala po ya boboto. Mbela ena elingi koyebisa baye bazali na lisangani ya mokili mobimba na likambo etali Sudan, esalemi na Royaume-Uni mokolo ya mibale 15 ya sanza ya minei po na komeka kozua nzela ya kimia na etumba ena.

« Bato babosani Sudan », elobi Christian Modino Hok, directeur humanitaire na Caritas, oyo abakisi lisusu tè uto mibu mibale, « ba nzela binso bisalemaki po na bozui boyokani ya boboto bikoki te kosilisa etumba ». Lisusu, masanga bisungaka bato na ekolo bazali kokoba kozua 1% ya lisungi ya mokili mobimba. Na boboyi kolemba, molobeli ya Caritas Internationalis alingi kokundola na mokili mobimba lotomo na ye ya kosala tè bato batosa mobeko ya bomoto, « eye ezali mpenza na kati ya kotungisama »

Ya solo, motango ya bato ya etumba ezali ya mawa: koleka ba nkoto zomi ya bato bakufi, pembeni ya milio 13 batiki bisika bavandaka, kati na bango moko likolo na misato bakimi na bikolo ya nzinganzinga. Masanga bizali kuna bizali kotelemela pasi bazali koyoka po ya bomemi lisungi o kati ya ekolo.

Makambo makoki kobeba lisusu

Likambo mosusu ekotungisa bango ezali bozui mosolo ya lisungi ya mokili po na bato eye ekomi kokita. N¡¯Amerika na bokitisi makasi ya USAID pe na Poto, bikolo bizali kotinda mosolo na boluki mandoki na bango, elimboli Christian Modino Hok. Caritas Internationalis asangisaki milio moko na ndambo ya euros na sanza ya mwambi ya 2024, na bolobeli bato maye mazali koleka na Sudan. Motango ya mosolo ena ezali moke te kasi ¡°ezali eloko te liboso ya ba posa ya bato¡±, elobi ye.

¡°Ezali mpenza mawa, pe makambo makoki kobeba lisusu¡±, ebuakaki ye mbela na bomoni tè boboto ezali likambo ya ntina po na bosukisi pasi ya bato. Amerika na lisangani ya Londres alobi akopesa koleka milio ya euros 800 po na lisungi, kasi eteni moko te ya baye bazali kobunda na Sudan ezalaki na lisangani ena

18 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 13:45