Na Canada, statut ya masanga ya biyamba pembeni na kobeba
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Ministre ya Yambo ya sika ya Canada Mark Carney abandi kokamba ekolo mokolo ya mitano 14 ya sanza ya misato, nsima ya bolongi maponami na mposo oyo elekaki na Parti libéral. Mosali ya kala ya makambo ya mosolo, akambaka ndako ya bobombi mosolo ya Canada mpe ya Grande Bretagne. Carney akitani na Justin Trudeau oyo asakolaka na ebandeli ya sanza ya liboso ete akotika mosala ya Ministre ya Yambo, nsima ya kosala mibu zomi. Likambo ya liboso ya kosala ya mokambi ya sika ya bulamatari ya Canada ezali kobunda etumba ya makambo ya mombongo eye mokambi y¡¯Amerika, Donald Trump, abuaki. Bobangisi ya Trump ya kokomisa Canada ¡°ekolo ya ntuku mitano na moko y¡¯Amerika¡±, ebimisi mokakatano nanu esalema te kati na bikolo mibale.
Nsima ya bobangisi, likambo moko ya lolenge mosusu ebombani na ba mposo bileki. Ezali bongo bobangisi ya bulamatari ya Parti libéral ya kobotola statut ya lingomba ya bosungi na masanga nionso ya biyamba ya ekolo. Na mosala ya mosolo ya ekolo elobamaki kobanda sanza ya zomi na mibale elekaki, lingomba moko ya baponami ya bana ya ekolo ebimisaki makanisi ebele. Kati na yango, makanisi mibale bitali mpenza likambo ena. Ya 429 epesi likanisi ya kopekisa ba exonération fiscale na masanga maye batelemeli likambo ya kosopa zemi. Ya 430 ebimisi likanisi ya kopanza mokano ena na masanga nionso ya biyamba. ¡°Likanisi 430 ekoluka lolenge ya kopekisa bozui statut ya lingomba ya bosungi mpe ekoningisa makasi bato na Canada¡±, elobaki Benjamin Boivin, secrétaire de rédaction ya Le Verbe, mokanda ya bopanzi sango katoliko ezuami na Québec.
Eloko ya malamu mpo na bato ya Canada
Misala ya bosungi bato na Canada maye bizali na maboko ya biyamba bikotala masanga koleka ba nkoto: paloisse, kasi lokola mosquée na synagogue, ¡°Kino sik¡¯oyo bulamatari azalaki kozongisela bango ndambo ya makabo biwutaka bipayi ya bato. Ezali mpo na kolendisa misala ya bosungi bato na Canada¡±, esembolaki Benjamin Boivin. Na mokolo ya 21 ya sanza ya mibale, episkopo ya lokumu Frank Leo, episkopo ya Toronto, akomelaki mokanda na ministre oyo atalaka makambo ya mosolo Dominic Leblanc, mpo ya bokomisi epayi na ye bobangi ya Eklezia katoliko. ¡°Lokola oyebi, masanga ya bosungi ya biyamba bikolendisa lolenge ya bovandi ya ekolo na biso na mosala makasi na bango, na mosala ya pembeni pembeni mpe na nkisi bazali kopesa¡±, ekomaki episkopo. Episkopo Leo atelemeli likanisi ena ¡°mingi mpenza ya mawa mpe ya kondima te¡± soki masanga ya kobatela bomoi mpe masanga ya biyamba babungisi statut na bango ya lingomba ya bosungi. Akundolaki na ye ete Canada ¡°endimaka kaka mosala ya motuya ya boyambi, ya bokumisi mokonzi mpe ya eyamba kati na bato¡±.
Soki mosolo ya ekolo nanu endimami te lokola mikano 429 mpe 430, ngonga esili ebetami bipayi ya ba Eklezia banso. ¡°Bozali na bomoi na mosala ya masanga ya biyamba bikobikisa bato na Canada koleka ata bandimi bango moko¡±, elobaki lisusu The Evangelical Fellowship of Canada na mokanda mpo na bato banso atindelaki ministre Dominc Leblanc. Mosala ya bosungi ya masanga ya biyamba na ekolo (biye bizali 40% ya 73 000 masanga biyebani na Canada, lokola fisc ya Canada ekomaki) eleki mosika motuna ya esika ya biyamba. Lisanga moko ya boluki luki na kombo ya Cardus ekomaki ete exonération fiscale ya ba Eklezia ezali na motuya koleka mpo na bana ya Canada nionso, na bobandi na leta ye moko. Kaka Cardus akomaki ete bopesi ya biyamba na masanga na bango ezali ya koleka 10,5 ya ba exonération fiscale bazali kozua.