Haiti: MSF abuaki mbela nzambi bovandi ya bato ekomi ya ¡°monyoko"
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
¡°Mobulu ekoma ya mokolo na mokolo, okoki komona yango¡±. Wana ezali maloba ya Christophe Garnier, mokambi ya Médecins sans Frontières (MSF) na Haïti. Alakisi na mituya mpasi ezali na ekolo Haïti. Pembeni na moto moko likolo na zomi ya bana ya ekolo batika bisika bavandaka likolo ya mobulu: ONU alobi motango ya bato koleka milio moko bakima ba ndako na bango, ntango mosusu mbala ebele.
Bozali ya bato ezali kobonga te. Lisanga ya ONU eye etalaka likambo ya migration (OIM) elobi ete koleka bato 60.000 batikaki bisika bavandaka na sanza moko (kati-kati ya sanza ya mibale kino kati-kati ya sanza ya misato) na mboka mokonzi, Port-au-Prince, likolo ya mobulu ya bato ya mpomba. ¡°Nanu tomona te motango ya bato ebele boye batika bisika bavandaka na eleko moke¡±, ekomaki na monkanda mokambi ya OIM na ekolo, Grégoire Goodstein.
Mobulu ntango inso
Atako bongo, Médecins sans Frontières akomeka kobikisa bato na lombangu. Na basali pembeni na 2.000 na lisanga na ye, MSF azali kosepela te lolenge ¡°mobulu ekomi likolo ya makambo manso¡±.
Mokambi ya MSF na Haïti amoni tè na ba lopitalo na bango ¡°motango ya bato bayambaka na momeseno eleki¡±. Bato bazui masasi biye biyebani bipayi biwuti te na baye bazoki na mobulu ezali na ba nzela, kasi na lokola baye basali accident na mituka mpo na bozangi kokumba motuka malamu na bituka.
Nsuka ya USAID
Lisusu, Christophe Garnier akobanga ba mposo bizali koya, pamba tè amoni tè ¡°kobikisa bato ezali kaka kobeba ntango inso¡±. Liboso mpenza ezali mokano ¡°mabe¡± ya bokati mosala ya USAID na mokonzi Trump eye ekobebisa lisusu makambo. Ndakisa, ba masanga bipesaka mayi to mpe bokoti na nzongo ike na bato 200.000 bakima bikolo na bango na bisika ya bongo bongo ya Port-au-Prince bakozala na makoki ya kokoba misala mina te. Bozui ba nkisi ekomi mpasi kobanda libanda ya pepo ya mboka mokonzi ekangama.
Bobangi choléra
Bokomi ya eleko ya mbula ekoki mpe kobebisa mosala ya MSF, lokola mabongi ya bopeto bizali lisusu te. Christophe Garnier azali kobanga choléra etomboka na mboka. ONU alobi bato ya mpomba bazali na maboko na bango 85% ya ekolo mpe babakisi lisusu mobulu makasi mikolo miye na ekolo.