ÐÓMAPµ¼º½

Luka

G20 Finance Ministers meeting in Cape Town G20 Finance Ministers meeting in Cape Town  (Nic Bothma)

Caritas mpe bakambi ya biyamba 124 babwaki mbela na G20 mpo na bokitisi niongo

Na mokanda ebisami na Caritas Internationalis, koleka 100 ya bakambi ya biyamba ya mokili mobimba babeleli na ba ministre batalaka mosolo ya Lisanga ya ba nkita 20 ya makasi ya mokili na bozui mikano misengeli o eleko ya Jubil¨¦, mpo na bosukisi likambo ya nsoni ya nyongo ya bikolo bizanga makoki, baye bazali kobimisa mosolo ebele ya bofuti niongo koleka bokolongono bwa nzoto na eteyelo.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Bakambi ya biyamba 124 ya mokili mobimba balingi batika elembo na mobu ya Jubilé na mbela makasi na Lisanga ya bikolo 20 baye bazali na mbongo koleka (G20) mpo ete atala likambo ya niongo ya mokili eye ezali kolalisa molende ya kosilisa kimobola na likambo ya klima.

Ekomami mpo na ba ministre ya mosolo ya G20 basangani mposo eye na Johannesburg, n¡¯Afrika ya Sudi, liboso ya bokutani ya mobu na mobu ya sanza na zomi na moko, mbela ena ekolakisa bozito elongobami te ya bofuti niongo ya bikolo bizangi makoki, eye ezali kolekisa mbongo na nzela esusu na esika esengeli kokende lokola bokolongono ya nzoto, eteyelo, likambo ya klima.

Mbemba ezali kosalema lelo eye na likambo ya niongo na bikolo bizangi makoki

¡°Lokola bakambi ya biyamba, totungisami makasi na mbemba eye likambo ya niongo ezali kosala na bomoi ya babola mpe baye bazanga na kati ya mokili¡±, lolenge ekomami na mokanda na bango. Bakambi ya biyamba balakisi ete mposa ya kosala lelo ezali makasi koleka ya mobu 2000, o eleko ya campagne ya yambo ya mokili mpo na bosilisi niongo eye esalemaka na Jubilé enene ya mobu wana. Bakomi ¡°3,3 milliard ya bato -pembeni ya ndambo ya bato banso ya mokili- bazali lelo na bikolo bizali kobimisa mbongo ebele ya bofuti niongo liboso ya kotala makambo ya bokolongo ya nzoto, ya eteyelo to mikano bisengeli mpo na klima¡±.

Caritas Internationalis abimisi likambo eye mpo na kopesa eyano na mbela monene ya Papa François mpo na bosembo na makambo bitali mosolo na mokili, mingi mpenza na eleko eye ya Jubilé.

Moto atie mokoloto ya yambo na mokanda ena ezali episkopo ya lokumu Stephen Brislin, episkopo ya Cap. Akolakisa kaka Lisanga ya ba episkopo katoliko y¡¯Afrika ya Sudi te kasi na ekolo na ye oyo esimbi bokonzi ya G20 mobu eye. Yango ekopesa -lisusu bozito na mokanda ena.

Liyangani ya ONU mpo na niongo

Mokanda ekobimisa likambo ya bosali Liyangani (convention) ya ONU na oyo etali niongo. Liyangani ena ekopesa mikano bilongobami na oyo etali kodefa mpe kozongisa niongo, ekobongisa mibeko ya polele mpe ekokotisa registre ya mokili ya niongo mpo na bokolisi mokumba (responsabilité).   

Bakomi mokanda balobi ete bosaleli mbongwana bango basengi ekosunga kaka mpo  na bosilisi mpasi ya lelo te, kasi ekosunga mpo na bozui likambo ya mosolo ya sembo mpe kowumela koleka. ¡°Lokola bakambi ya biyamba, tokolendisa bino bozala ba pelèrins ya elikya baye bazali kosala na mpiko, na lisanga mpe na mawa na mobu eye ya Jubil顱, bakambi ya biyamba basukisaki bongo mokanda na bango.

Bokambi ya yambo y¡¯Afrika ya G20

Afrika ya Sudi oyo azali kokamba mobu eye G20 -bokonzi bwa yambo ya lisanga eye -na ekolo moko y¡¯Afrika- na likambo likonzi ¡°Lisanga, bokokani, bowumeli¡±, alobaki ete akopesa motuya koleka na likambo ya bobundi na makama (catastrophes), ya bosungi likambo ya niongo, na transition énergétique ya sembo mpe na mabanga ya ntalo bisengeli mpo na botomboli ya banso

 

 

01 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 14:34