ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.12 Carlassare South Sudan 2025.03.12 Carlassare South Sudan 

Babosana mpe bazali koyiba Sudan ya Sudi, elobi Mgr Carlassare

Sudan ya Sudi ezali ekolo ya sika koleka na mokili. Bitumba kati na mampinga ya ekolo mpe batomboki bikosila te. Episkopo ya Bentiu, Mgr Christian Carlassare, apesi mbela mpo na boboto, mosala mpe lisolo na bato. Atelemeli lolenge lisanga ya bikolo (communaut¨¦ internationale) ekomona mpamba likambo ya Sudan ya Sudi.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Ezali ekolo ya sika koleka na mokili, Sudan ya Sudi, ekoki lisusu kokota na mobulu. Kobanda ba sanza boyiké, Mampinga ya bana ya Sudan ya Sudi bikambami na mokonzi ya ekolo Salva Kiir, na batomboki ya Mampinga ya pembe, bikambami na mokonzi molandi Riek Machar. Bango mibale bazali na bitumba. Sima ya ba mibu bebo ya bitumba, ekolo ebotami na 2011. Ekolo ekotaki oyo babengi na lopoto guerre civile kobanda 2013 kino 2018, mpe lelo elingi ezonga lisusu na etumba ena. Maponami bibongisamaki mpo na sanza ya zomi na mibale ya mobu 2024, bapusaki yango na nsuka ya mobu 2026. Boyokani nzambi ya kotia kimia na ekolo ebongisamaka na mobu 2018 ekoki kobeba mikolo miye. Mpo na Mgr Christian Carlassare, episkopo ya Bentiu, esengeli kotonga kimia mpe kozongisa elikya na bana ya ekolo.

Episkopo, lolenge nini Sudan ya Sudi eyokanaka lisusu te, ekobika kaka na pitolo (pétrole) mpe ezali moko ya bikolo ya bobola na mokili?

Ezali bongo pamba tè etikali kati na bikolo ya bobola, lisanga ya bikolo esundola ye, ekolo ezali konyokwama na kimoyibi ya biloko na ye ya motuya, mingi mpenza pitolo mpe biloko misusu.  Nionso wana ebakisami na lolenge bisalelo ya bulamatari bizali kati na bobola mpe bizangi makoki ya kozala na ngambo ya bana ya ekolo.

Lolenge nini bana ya ekolo bazali komona makambo ndenge bizali sik¡¯oyo?

Ekomonana tè bana ya ekolo bandima makambo ndenge bizali sik¡¯oyo. Nanu bamona te bisalelo ya leta bikoka kosalisa lisolo kati na bato, bisilisa bitumba na boluki mandoki te mpe bitiya nkita ya malonga. Mingi bazali kobika na lisungi ya bapaya, kasi mikolo miye lisungi yango ezali na mikakatano.

Papa alekaka na Sudan ya Sudi na 2023. Libula (héritage) nini etikali ya mobembo ena?

Likanisi ya boleki ya Santu Papa na Djouba ezali nanu makasi epayi ya bato mpe ezali kopesa molende na mosala ya Eklezia na ekolo. Ekolo oyo esengeli na bopanzi nsango elamu.  Yango esengeli ekende elongo na bosololi na boyokani. Boluki kimia ekokota kaka o eleko bato bakolinga bayokana na oyo eleka ya bango mpe bandima ete nzela mosusu ya kokotisa bondeko kati na bango ezali te. Bayike ya bana ya ekolo bandima kolanda nzela ena, kasi mingi bazali kotungisama na bato ya politiki.

Boyokani nini ezali kati na biyamba bizali na ekolo?

Tozali na biyamba ya bakristu ebele, ba musulman bazali na kati ya ekolo. Botosi ezali, kasi lisanga te. Nzela se moko esangisi biso ezali oyo ya boyambi mpe ya elikya. Sik¡¯oyo tozali na eleko ya karesimo, ba musulman bazali na ramadan na bango. Banso tozali kotalela Mokonzi. Yango wana boyambi ekobenga biso ya kokolisa bondeko mpo ete moko moko atala ndako na ye kaka te, kasi atala libota ya mokili mobimba, epayi wapi biso banso tozali bana ya Nzambe.

Mposa na yo ezali nini na mobu eye ya Jubilé, eye ezali na mikakatano na ekolo mpe bitumba bipayi mingi ya mokili?

Mposa na ngai mpo ya Jubilé ezali na maloba ya Michée ¡°balakisa, moto, oyo ezali malamu, mpe oyo Nzambe akosenga yo, ezali osalela bosembo, olinga koyoka mawa. Mpe otambola na bomikitisi na Nzambe na yo¡±.  Wana ezali mposa na ngai mpo na Eklezia ya Bentiu na eleko eye, mpo na Sudan ya Sudi, mpe mpo na nzela ya lisanga oyo mokili abengami kolanda, mpo na kobika lisanga lokola bandeko, na bomiyebi lokola bana mibali.

 

 

 

14 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 14:13