ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Haitians flee homes in Kenscoff due to gang violence, in Port-au-Prince Haitians flee homes in Kenscoff due to gang violence, in Port-au-Prince 

Na Ha?ti: Unicef abeleli ¡°bana bakokoba konyokwama¡±

Geeta Narayan, ntoma y¡¯Agence ya Nations Unies eye etalaka makambo ya bana na Ha?ti, abeleli na mokili mobimba mpo na kosukisa mobulu maye bana bazali komona mpasi.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Mobulu mpe minyoko bikotungisa ekolo ya Haïti o eleko makasi ya ba pomba basimbi mandoki ezali se kokola. Ntoma ya UNICEF na Haïti, Geeta Narayan, abimisi maloba mpo na koyebisa lolenge bana bazali na ekolo.

Mobulu ekobebisa mpenza bomoto

Bobakisi mobulu ya ba pomba ekokoba komonisa bato mpasi na Haïti. Mpo na lisanga etali migrations ya Nations Unies, motango ya bato bakimi bisika na bango o kati ya ekolo ebakisami mbala misato, koleka bato milio. Ba pomba bazui mboka mokonzi, Port-au-Prince. Misala ya minganga mpe bilei bikomi mpasi. Mobulu ya ba pomba ekomi epayi ya bana. Geeta Narayan atatoli: ¡°Bana bakokoba konyokwama na lolenge elongobani te liboso ya mobulu ya ba pomba basimbi mindoki¡±.

Mokolo ya 11 ya sanza ya mibale, masasi bisika biwuti biyebani te bibomaki mwana moko afandaki na kelasi. Ntoma ya UNICEF apesaki ba nsango ya mwana moko ya moke ya sanza mibale ekoki kozala atumbamaki azali nanu kotala liboso ya mama na ye. ¡°Mpasi moko ya koleka eye esengeli koningisa mokili¡±, Geeta Narayan alobi ete misala biye mileki mosika misala ya mobulu, mpe ¡°ezali mobulu moko ekobebisa mpenza bomoto¡±. Liboso ya likambo ena, UNICEF akolendisa bakambi ya ekolo mpe mokili mobimba mpo na kosala mpe ¡°kobatela bana ya Haïti, ba lotomo na bango mpe kobongisa bokengi na bango¡±.

Bozui bana na mosala

Milio 1,2 ya bana bazali kofanda na bobangi ntango inso mobulu ya mondoki, mpe motango ya bana bazui bango na mosala na ba pomba bazali na mindoki emati na ndenge ya kokamwa. Na sanza ya zomi na moko elekaki, mokanda moko UNICEF abimisaki elakisi ete bozui ya bana na mosala emataki kino 70%. Mpo na Amnesty International, kati na 30 mpe 50% ya ba pomba bizali bana. Mingi kati na bango bazali na makasi kokoma bapesi nsango ya bitumba, basoda, balambi, to mpe ¡°basi¡± ya ba pomba.  Soki baboyi, bomoi na bango na ya libota na bango bikotungisama. Mpo na Geeta Narayan, ¡°mokili esengeli te kofanda nye¡± o eleko bana ebele bayebi likambo te bazali koyoka mpasi mpe konyokwama na Haïti. 

21 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 12:05