ÐÓMAPµ¼º½

Luka

BELGIUM-EU-UKRAINE-RUSSIA-CONFLICT-DIPLOMACY BELGIUM-EU-UKRAINE-RUSSIA-CONFLICT-DIPLOMACY  (AFP or licensors)

Mibu misato ya etumba na Ukraine, Poto esengeli ezala mosali ya kimia

Nsima ya mibu misato ya bokoti ya Russia o ekolo, Ukraine akotanga ba milio ya bato bakimi ba mboka na bango mpe bituka mingi bibebi. Poto ebengami ya kozongela mosala na ye ya boluki kimia.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Esali mibu misato, mokolo ya 24 ya sanza ya mibale ya mobu 2022, Russia ekotaki na etumba na Ukraine. Etumba ezongaki o kati ya Poto. Mibu misato ya mpasi epayi wapi liwa mpe minyoko bitikali bilembo na motema mpo na ba milio ya bato. Motango ya solo ya ba soda na ba civil bakufi eyebani te. Bapanzi nsango ya mokili mobimba balobi bokimi ya bato pembeni ya milio sambo baye bakei na bikolo ya nzinganzinga biye biyambi bango O kati ya ekolo, na ba sanza eye malili ezali kobeta makasi, pembeni ya bato milio minei batiki ba mboka na bango mpo na bokimi etumba. Babali, basi, bana, ba mpaka, na ba ndelo ya bikolo mibale bisika etumba ezali, bazali kobombana ba ba tunnels mpo na bokimi ba bombe to ba drone. Bituka ebele bitikali kaka mabanga likolo na mabanga, lotiliki ya malonga te. Koyetola, kolia to kokende epayi ya monganga bikomi mpasi.

Anniversaire moko ya mpasi

Papa, na liteya ba ye etangamaki mokolo ya eyenga 23 ya sanza ya mibale na losambo y¡¯Angélus, abengaki anniversaire ena ya ¡°mpasi mpe ya nsoni mpo na bato banso¡±. Mpo na Santu Papa, ¡°etumba ezali ntango inso bokweyi (defaite)¡±. Akolemba te kobelela mpo na ¡°boboto ya sembo mpe ya bowumeli¡± mpe bosenga ya lisolo.

Lisolo na lombangu

Ba mbela mpe boluki kosukisa bitumba biye bisalemaki bikoki kosilisa etumba kati na Russia mpe Ukraine te.

Esengeli na lombangu kotika mobulu nionso, kozongisa confiance, kobongisa lisusu ¡°lisolo ya mokili mobimba¡±, lokola secrétaire ya leta ya Vatican, episkopo ya lokumu Pietro Parolin, alobaki yango eleki mwa ba sanza. Lisolo ena ezali mpo na bozongisi oyo ye abengi ¡°molimo ya Helsinki¡±. Pamba tè, na mobu 1975, ezali bongo mposa ya kafanda esika moko lisanga esungaka na bokolisi coopération kati ya bikolo ya Poto mpe ya bokitisi nungu nungu o eleko ya guerre froide. Mbela epesami bongo na Poto mpo na amiyeba lisusu, azonga na misisa ya ba père fondateur Robert Schuman, Konrad Adenauer, Alcide De Gasperi mpo azala ya solo  mosali ya kimia ya makasi. 

24 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 12:29