ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Students attend a class in Al Carmelia School in Mejdlaya Students attend a class in Al Carmelia School in Mejdlaya 

Biteyelo katoliko ya lokota ya lifalanse ya Moyen-Orient bisangani na Caire

Na Proche-Orient eye etungisami, koleka bana kelasi 400.000 bazui kimia kati na bifelo ya biteyelo katoliko ya lokota ya lifalanse. Bisika ya koyekola, ya botomboli francophonie kasi ya bokaboli, ya koyika mpiko mpe ya elikya.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Mikolo mibale, collège de la Salle, na kati ya mboka mokonzi ya Egypito, ebongwami fourmilière. Bateyi, bakambi ya biteyelo, ba sango mpe ba congrégations ya Proche-Orient bakutani mpo na colloque ya mbala ya mitano ya ?uvre ya Orient na likonzi ya likambo, « Mabota mpe biteyelo katoliko ya Moyen-Orient liboso ya ba crise sociale mpe humanitaire ». Pembeni na biteyelo 350 bizali kuna, eleko mpo bakonzi na yango, tango mosusu bazali kaka bango moko na biteyelo, ya bokutani, kokabola makanisi na lolenge ebele ya mosala mpe mikakatano na bango.

Na Syrie, na Jordanie, na Mabele-Esantu, na Liban mpe na Irak, molongo ya biteyelo katoliko ya lokota ya lifalanse azali na mosala ya ye moko ya kopesa bomengo ya bonkoko ya esika ena kasi lokola ya botomboli francophonie mpe ba ntina bibombani kati na yango. « Bomoko mpe botosi moninga », elobi mamelo Marcelle Karam, mokambi kobanda 1995 ya buro pédagogique ya Bana Basi ya charité ya Liban.  Biteyelo bikobatela bofandi-lisanga ya Liban, eye bikoyamba bana kelasi ya biyamba binso : « Tokosunga bango ya kofanda na ndenge ya kimia, ya kondima mosusu oyo akeseni », alimboli mamelo Marcelle Karam.

Foyer ya bopanzi lokota ya lifalanse

Bitondi na bana kelasi 400.000, biteyelo katoliko ya lokota ya lifalanse bizali molongo moleki monene ya francophonie na mokili na botali bana kelasi. Soki biteyelo bina bizali ¡°ba bulles te¡± mpe bikoki kokima ba crise proteiformes te bikoleka sik¡¯oyo na Proche-Orient, elobaki lisusu mokambi ya ?uvre ya Orient, Mgr Pascal Gollnisch- bikotikala bisika bikosunga ya kopekisa ¡°lolenge moko ya bokomisi lokota ndenge moko¡±, mpe bikokumba kati na bango bitumba ya mikolo miye lokola etumba ya bosukisi rechauffement ya klima. ¡°Tozali na botosi¡±, elobi mamelo ya Liban, ¡°kasi na bonsomi ya liloba¡±.

Kasi, bisika bina ya bokaboli biloko ya motuya ya bakristu mpo na bomoto ¡°bikoleka eleko moko ya mobulu¡±, eyokaki mawa sango Youssef Nasr, secrétaire général ya biteyelo katoliko na Liban mpe na bikolo ya Proche-Orient mpe y¡±Afrika ya Likolo. Oyo ya lobi na bango ekoki kokangama na bozangi mosolo, mingi mpenza likolo ya bokweyisi motuya ya misolo ya bikolo na bango.

Na Liban, Bana Basi ya charité bazali kokamba biteyelo ntuku mibale, kati na yango zomi bizali kozua mosolo ya Leta kasi bazui eloko te kobanda mibu mitano. Bizali kaka na bomoyi likolo ya masungi ya masanga, kasi congrégation esengeli kosenga na baboti bakoki kofuta mosolo ya botangisi bana. Na nsuka ya sanza inso, congrégation amekaka kobakisa lifuti ya bateyi na dollar y¡¯Amerika, mpo na kosunga bango bazala malamu.

Botangisi basi

Kobanda mibu 1970, biteyelo katoliko ya lokota ya lifalanse batomboli botangisi moko ebongisami na bokokanisi basi na mibali. Ezali likambo moko ebandi na Proche-Orient eye ekotinda baboti musulmans ebele na boponi biteyelo wana mpo na bana basi. ¡°Ba mama ya bana basi ya musulman balingi bana na bango bazala epayi na biso pamba tè bazali na bonsomi ya liloba¡±, elobi, na esengo, mamelo Marcelle Karam.

Sango Youssef Nasr alobi ye mpe lokola na esengo bobongisi likambo ya bokokanisi basi na mibali na biteyelo na ye: ¡°ezali likambo ya lokumu¡±, elimboli ye, eye ekosenga ¡°kosala keba¡± epayi ya bato ya Orient. ¡°Moto nionso andimi mosala se moko ya mwasi na mokili¡±.  

Nzela mpo na kosunga bilenge ya kotikala

Mpo na sango Nasr, moko ya mikakatano bizali na biteyelo bina ezali ya kopesa likoki mpe mposa na bilenge ya biyamba nionso ya kotikala na mabele na bango. Mpo na wana, alobi lisusu ete biteyelo katoliko ya lifalanse bisengeli kosala na boyokani makasi na Leta mpe mabota. ¡°Bana kelasi bakosenga makambo mibale: kokoka kokoba ba kelasi ya likolo mpe kozua na nsuka mosala, kokweya mbala moko te na chômage¡±. Molongo ya biteyelo katoliko ya lifalanse ezali, ndenge ye amoni, na boyebi ya mosala na ye mpo na kopesa lisusu lolendo mpe elikya na bilenge ya Proche-Orient.

¡°Biteyelo bisengeli bizala na makoki ya koyanola na ba mposa ya bilenge mpo batikala bipayi na bango. Soki bilenge bakokima bikolo na biso, eye ekoya lobi ya bikolo na biso ekozala nini?¡±, ebakisi secrétaire général ya biteyelo katoliko ya Liban. Sik¡¯oyo, pembeni ya ndambo ya bana kelasi ya nsuka balingi basilisa kelasi na bango na mboka ya bapaya.

¡°Proche-Orient ¡°ebengami te kozala na mikakatano ntango inso¡±, elobaki Mgr Gollnisch, mpe bakristu bakozala basali ya oyo ekoya ya boboto koleka.  

08 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 15:52