ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Lisolo na bapanzi nsango ya bolakisi World Meeting on Human Fraternity 2025 Lisolo na bapanzi nsango ya bolakisi World Meeting on Human Fraternity 2025 

?World Meeting on Human Fraternity 2025 ?, kozala moto o eleko ya lik¨²nya pe ya bitumba

Bok¨²t¨¢ni ya mbala ya is¨¢to ebongisami na basilique Santu-Petelo ekos¨¢lema mikolo ya 12 pe 13 ya s¨¢nz¨¢ ya libw¨¢. Likambo m¨®k¨® ya monene ya mokili ebongisami, na bozali y¡¯Andrea Bocelli pe ya Pharrell Williams. Episkopo ya lok¨²mu Gambetti: ¡°Tolingi topesa likanisi ya bondeko lok¨®la lib¨¢ng¨¢ ya ntina ya nd¨¢ko ya lol¨¦ng¨¦ ya sika ya politiki, nkita pe ya bato na bozali ya bato¡±. S¨¢ng¨® Occhetta: ¡°Tolingi kolakisa mosisa ya moto eye esangisi bis¨® bans¨®¡±.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

« World Meeting on Human Fraternity 2025 », eye ekosálema mikolo ya 12 pe 13 ya sánzá ya libwá, elakisamaki mokolo ya mitáno ya 29 ya sánzá ya mwambi. Manaka ya likambo yangó, etómbolami na basilique Sántu-Petelo elongó na misála ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe na lisálisi ya basusu, elakisamaki na ndáko ya makita ya Vatican, na lisálisi ya mokambi, Matteo Bruni, na bozali ya episkopo ya lokúmu Mauro Gambetti. Kasi « kozala moto » elingi koloba nini leló, na mokili mókó eye ekoleka eleko mókó ezali na bitumba, bozali yo mókó, ba loléngé ya sika ya mobóla, makambo mabé ya nzinganzinga, mabakú bibimi na botómboli ya tekiniki, pe epayi wápi nionso ezali lokóla kosepelisa ye longola kaka likanisi mókó na eye etáli bondeko pe likoki ya kozua matónó ya bokaboli pe ya lisangá ?

Episkopo ya lokúmu Gambetti : bondeko, libángá ya ntina ya ndáko ya loléngé ya sika ya bozali

« Likanisi ezali ya kolakisa na mokili ndelo ya bondeko lokóla libángá ya ntina ya ndáko (clé de voûte) ya loléngé ya sika ya politiki, nkita pe ya bato na bozali ya bato », elobaki episkopo ya lokúmu Gambetti o eleko ya bokútáni na bapanzi nsango. Pe yangó, po ¡®te « mokáno ya bondeko ya mokili mobimba ekoki kopesa makambo po ya kokoma lisoló ya mbóngwana ya lisapo », na ndéngé « ya botóngi, elingi koloba kosála ángele na bato, kotósa ba bokeseni, na boyókani na ekelámo pe mobáteli ya bonsómi pe ya bokokani na lokúmu ya moto mókó mókó ». Ezali ndéngé waná, ekobaki episkopo ya lokúmu, nde ebongisami mbela ya Papá Léon XIV na litéya na ye o ebandeli ya mosála na ye : « Elongó, lokóla moto mókó, lokóla bansó bandeko, tokende epayi ya Nzámbe pe tolingana bisó na bisó ».

Makambo likonzi 15

Mokolo ya 12 ya sánzá ya libwá, makambo likonzi 15 bibongisami po ya biténi ya ntina bikokanisa boyókani kati na bondeko pe misála ya sóló. Bikobengama ya kolakisa, na súka ya misála, makanisi bikoki kosálema na bisika ya bomoi na bangó pe ya mosála.

Sángó Occhetta : mosisa ya moto eye ekosangisa bisó bansó

Makambo likonzi, elimbolaki sángó Occhetta, ¡°bilingi bibeta sete na ntina ya bondeko pe kobimisa mosisa ya moto eye ekosangisa bisó bansó. Zambi leló, tozali na pósá ya lisangá mókó ya milimo pe ya mitéma bamipesi na kopona eye ya malamu¡±. Makambo likonzi bina, ebakisaki ye, ¡°bizali na bosóló mbuma ya nzelá mókó ya bonkoko pe ya molimo eye eúmeli mibú misáto, nzelá mókó ya sóló ya synode, na masangá bikelami nzinganzinga ya bisika ya bosololi pe bibimisaki makanisi misusu ya malonga¡±.

¡°Lisangá ya bomoto¡± na ba prix Nobel

Likambo ya monene ya Meeting ekozala mokolo ya póso ya 13 ya sánzá ya libwá. Na ndáko ya makita ya ba Horace pe ya ba Curiace na Capitole ekosálema bôngó ¡°Lisangá ya Bomoto¡±, ebongisami pe ekambemi na ba Prix Nobel pe batindámi ya masangá ya mokili. Lisangá ena, ngonga eye bakolakisa ba mbano bizuami na biténi ya makambo likonzi, ezali po ya kokotisa masánga ya mokili mobimba zambi ya koyéba nini moto elingi koloba pe matóno nini bisangisi bato bakeseni na momeseno na bangó, lisapó na bangó pe boyambi na bangó.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

02 s¨¢nz¨¢ ya libwa 2025, 19:12