ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Episkopo ya lokumu Mario Grech, secr¨¦taire g¨¦n¨¦ral ya secr¨¦tariat g¨¦n¨¦ral ya Synode Episkopo ya lokumu Mario Grech, secr¨¦taire g¨¦n¨¦ral ya secr¨¦tariat g¨¦n¨¦ral ya Synode  (Vatican Media)

Episkopo ya lok¨²mu Grech, Maria, ndakisa ya Eklezia ya synode

O eleko ya mbala ya 26 ya Congr¨¨s ya bik¨®l¨® et¨¢li Maria, eye ekos¨¢lema ¨²to mokolo ya 3 kin¨® ya 6 ya s¨¢nz¨¢ ya libw¨¢ na Universit¨¦ ya Pap¨¢ Antonianum, episkopo ya lok¨²mu secr¨¦taire g¨¦n¨¦ral ya Synode apesi likanisi ya elili ya Ngondo lok¨®la ndakisa ya boyoki. Maria azali f¨²ngola ya kot¨®nga masang¨¢ bizali na bomoko mosik¨¢ na ¡°baye bazali kob¨®ya¡± pe po ya kolanda ba makambo-likonzi ya sika lok¨®la bozali ya b¨¢si na bomoi ya eklezia.

Vatican News

Episkopo ya lokúmu Mario Grech, secrétaire général ya Synode, na bozui na ye ya maloba, mokolo ya mibále ya 4 ya sánzá ya libwá, na Université ya Papá Antonianum, o eleko ya mbala ya 26 ya Congrès ya bikóló (3-6 ya sánzá ya libwá), alobaki ¡®te Maria ¡°mama wa Yézu azali singá mókó ya bomoko¡± eye ekolakisa ¡°bizaleli bilongobami po ya synode mókó ya malongᡱ: boyoki, losámbo, bososoli, botósi, bomikitisi pe mosála. Episkopo ya lokúmu abakisaki ¡®te azali ¡°elongi mókó ekoki kopesa péma ya siká na loléngé ya bosangani ya biyamba ya lisangá ya eklezia pe, mingi mingi, na likambo ya bozali ya bási na bomoi ya Eklezia¡±. Po, ekobaki ye, ¡°Maria azali libosó libosó ndakisa mókó ya ¡°bofúngwami ezanga ndelo¡± na Molimo.

«Kokanisa lisusu» bomoi ya eklezia

¡°Mingi ekomamaki na oyo etáli synode pe Eklezia ya synode pe ya motindami¡±, elobaki episkopo ya lokúmu, na bosakoli pósá ya ¡°kokanisa lisusu¡± bomoi ya eklezia na nzelá ya makambo ¡°bilukama mingi te¡±. Káti na yangó, monene ya Maria. Na mokandá ya súka, ekundolaki Mgr Grech, ezali na milongó minei bitáli mama ya Yézu : « waná ezali moke te, sóki totáli ¡®te oyo tozali penza koluka ezalaki ya kotála na mozindo monene ya Maria te na Eklezia ».  

Emonani (identité) ya Eklezia ezui mosisa na sakramento ya bomoko, mosiká na bilama na ye baye « bazali kobóya ». Na ndéngé waná, Ngondo akolakisa « bobóngi ya makási » (perfection) eye lisangá ya eklezia epesama, elimbolaki Mgr Grech, ebéngami ya kondima káti na ye bizaleli bilongobami po ya synode ya malongá. Biténi ebelé ya nsango-ndamu bikolakisa bizaleli yango. Na Bosangeli, « bondimi ya bonsómi » ebótami na boyoki ; na Botáli, bokútáni pe bokaboli ya malongá bimónani ; na libála ya Cana, Maria amóni pe asosoli pósá ya lisangá, na bolakisi « botiyi motéma mókó mobimba na mosála ya Yézu » ; na súka, na nsé ya Kúrúse, atikali « nzeneneke kinó na súka ya botámboli ya Mwána na ye oyo azongisi boyokani káti na moto pe Nzámbe ».

« Oyo akolakisa nzéla »

« Eklezia mókó ya synode ezali Eklezia ya Pentecôte, ezali tángo insó na boyoki Elimo Sántu », emónaki episkopo ya lokúmu. Singá káti na Maria pe Eklezia ya synode ezali na molongó ya Concile Vatican II pe na likambo-likonzi ya litéya Lumen gentium. Mókó ya biténi makási, elobaki lisusu Mgr Grech, ezalaki liponi ya ba sángó ya Concile ya kopesa mokako mókó (un chapitre) na Maria, ya mwambi pe ya súka ya likambo-likonzi. Na boleki bôngó « nzebi ya milúlú ya eklezia (liturgie) ya ebongama », eye, o eleko ya mibú 2000, « etómbolaki monene ya Maria, po ya kozongisa singá na ye na mobombano ya Kristu na ya Eklezia ». « Litéya » mókó eye, engebene na Mgr Grech, « ezali nanu mosiká ya bososolami na ndéngé elongobami », po « ezangi mingi mingi bososoli mókó ekóla ya boyokani káti ya Maria pe Eklezia », likoki kotia elongi ya Ngondo na « boyokani mókó ya botóngi » na monene ya loléngé na loléngé ya bomoi ya eklezia.  

«Eklezia» mókó ezali na boyoki

 Papá François alobaka ¡®te Eklezia ya synode ezali ¡°Eklezia mókó ya boyoki¡±. Eye ya Maria, elakisaki Mgr Grech, ekelami na ¡°kimia mókó ya mozindo ya káti¡±, esika elongobami po ya koyamba likabo ya Elimo Sántu. ¡°Mopanzi nsango elamu ya yambo na Eklezia ezali Elimo-Sántu¡±, oyo ¡°ekosálisa pe ekotindá nsango¡±, elobaki ye. Ebéngámi ya Maria ¡°mama ya Eklezia¡± ekolendisa lokúmu ekokana ya baye bansó bazua batisimo pe ekokundola ¡®te ¡°ebéngéli ya monene ya bozali na Eklezia ezali eye ya kozala mwána¡±.

¡°Eye eúti na Elimo¡±

Episkopo ya lokúmu Grech akelaki singá mókó káti ya elongi ya Ngondo pe likambo-likonzi ya bozali ya bási na bomoi ya eklezia, ¡°eye ebimaki na makási na nzelá ya synode¡±. Mokandá ya súka elobi, elakisaki ye, ¡®te ¡°mibáli na bási bazali na lokúmu ekokani na Bato ya Nzámbe¡±, na bondimi ¡®te bási bazali kokútana na mabakú po ya komóna makoki na bangó pe misála na bangó biyébana malamu. Pe ya kobakisa: ¡°Ezali na likambo mókó te ekoki kopekisa bási basála misála ya bokambi na Eklezia: tokoki kokanga eye eúti na Elimo-Sántu te¡±. Na waná, engebene na Mgr Grech, pósá ya boyoki mókó ya malongá -likoki ya Maria- ekoki kofúngola Eklezia mingi na ¡°bimóniseli bikokitisa bokangi ezanga tina¡± na biye ya ¡°bofúngomi mókó ezanga ndelo¡±. ¡°Kozua mokáno sóki pe ndéngé nini kofúngola to kokanga ezali kotála bisó te, kasi Elimo eye ekokamba Eklezia na bosóló pe ekomema ye ya kokólisa boyokani ya sóló, na káti waná likambo ya bokokani na lokúmu na Eklezia¡±, esúkisaki ye.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

05 s¨¢nz¨¢ ya libwa 2025, 13:05