ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Ba timbre bikobima mokolo ya 7 ya sanza ya libwa Ba timbre bikobima mokolo ya 7 ya sanza ya libwa 

Ba timbres ebel¨¦ po ya bok¨®mi bas¨¢ntu ya Carlo Acutis pe Pier Giorgio Frassati

Bilongi mib¨¢le ya baye bakok¨®ma bas¨¢ntu, mokolo ya eyenga ya 7 ya s¨¢nz¨¢ ya libw¨¢, bikolakisama na ba timbre bibimisami na mos¨¢la ya ba poste pe ya philat¨¦lie ya Vatican. Misusu bikozala na elongi ya Charles de Foucauld to lisusu bikolakisa bokundoli mib¨² 550 ya mbot¨¢ma ya Michel-Ange.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Mokolo ya 7 ya sánzá ya libwá, mokolo eye bilenge Carlo Acutis pe Pier Giorgio Frassati bakosakolama basántu na Eklezia, mosála ya ba poste pe ya philatélie ya Vatican ekosepela na bangó na bobimisi ba timbre ya sika, elongó na Italie, ekóló Saint-Marin pe Ordre ya Malte, lokóla letá alobaki yangó mokolo ya yambo ya sánzá ya libwá elekaki. Timbre epesami po ya Carlo Acutis ekolakisa elili ya ye mókó azali koseka, sac na mokongo, o eleko ya bobimi mókó na ngómbá Subasio, esika mókó ezalaki na motúya po ekangami na molimo ya ba franciscain. Eye epesami po ya Pier Giorgio Frassati, po na ye, elakisi elili mókó ya ye, ezali ya libótá, ebongisamaka na peintre Alberto Falchetti (1878-1951).

¡°Litatoli ya Carlo Acutis ekoyébisa biso lisusu ¡®te bosántu ezali kaka likambo ya bato misusu te, kasi mbela mókó ya mokili mobimba, ekoki kozuama na baye bansó bazali kobika na boyambi ya sóló¡±, elimbolaki communiqué. Ebakisaki lisusu ¡®te elenge mobáli ¡°akumbaki bomoi na ye na boyambi mókó makási, na botiyi Nsango-Ndamu o ntei ya bomoi na ye ya mokolo na mokolo pe amisálaki esálelo ya bopanzi nsango ndamu, kinó na internet¡±. Pier Giorgio Frassati azalaki ¡°elenge mókó aútaki na libótá ya mosolo, ye alingaki kozala ¡°mokumbi ya babola¡±, na bomemi na mitúka ya mike biloko ya baye babengani bangó, ekobaki communiqué. ¡°Mikolo na ye ezalaki koleka na losámbo, lisálisi po ya babóla, boyékoli pe na baningá. Boyambi mozindo ya ye ezalaki ya kolia ukaristya mokolo na mokolo, losámbo makási pe ntúbela tángo insó¡±.

Lokóla momeseno, mikolo ya 7 pe 8 ya sánzá ya libwá, buro ya poste ya esika Sántu-Petelo ekobimisa ba timbre yangó.

Lisusu, mokolo ya 7 ya sánzá ya libwá, mosála ya ba poste ekobimisa ba timbre misusu ya makambo kilikili. Ndakisa, po ya kosepela mibú nkáma po ya mbala ya motóbá ya fondation ya Université ya Louvain na Belgique- mókó ya ba université katoliko ya kála na Pótó- mibú 550 ya mbotáma ya Michel- Ange pe bosakoli likanisi ya Ntombwa, eleki mibú 75.

Lisusu, o eleko ya Zubilé ya Elikya, timbre mókó ekobima po ya lokúmu ya sántu Charles de Foucauld po ya ¡°kosepela pe kopesa motúya na nzelá na ye ya boyambi, bosololi na bonkutu na moningá wa ye pe elikya azalaki kolakisa¡±.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

04 s¨¢nz¨¢ ya libwa 2025, 17:03