ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi  (ANSA)

Ngwende ya S¨¢ntu-Petelo ebimisi mob¨¦ko ya bopesi makoki po ya banso

Secr¨¦tariat etali makambo ya nkita ebimisi mob¨¦ko m¨®k¨® ya sika po pol¨¦l¨¦, bot¨¢li pe momekano bizala na bopesi ya makoki po ya bans¨® ya Ngwende ya S¨¢ntu-Petelo pe ya Leta ya Et¨²k¨¢ ya Vatican.

Vatican News

Secrétariat ya Nkita ebimisaki mokolo ya póso ya 9 ya sánzá ya mwambi mobéko mókó etiami mabokó na préfet Maximino Caballero Ledo. Mobéko ena ezali na loléngé ya kosálela mokánda ya Papá motu proprio ya sánzá ya motóbá ya 2020 etali ¡°mibéko ya polélé, ya botáli pe ya komekana na bopesi ya makoki po ya bansó (marchés publics) ya Ngwende ya Sántu-Petelo pe Leta ya Etúká ya Vatican¡±, ebongisamaki na simá na mokánda ya Papá motu proprio ya sánzá ya yambo 2024.

Mobéko ena ya sika, etiami mabokó mokolo ya 5 ya sánzá ya mwambi pe ezali na biténi 8, ekosalela mabongi ya motu proprio ¡°Po ya libongi mókó koleka¡±, eye ebongisi Code ya makoki po ya bansó ya Ngwende ya Sántu-Petelo. Mokánda ena ezali mbuma ya bosáli elongo kati ya misála bikeseni ya Vatican, na boluki bobongisi bopesi ya makoki po ya bansó na ndéngé elongobami.

Likambo ezala polélé koleka

Mobéko ya sika epesi bitindá ya polélé, ya botáli pe ya momekano, na bobongisi bokokani káti na bato ya mombóngo pe ekopekisa bokaboli káti na bangó, na loléngé litéya ya Eklezia ezali kosénga.

Engebene na mobéko likonzi ya Eklezia Praedicate Evangelium, mobéko ya sika etáli makambo maleka po na bozui bosémbo na bopesi makoki po ya bansó. Ntina ya likambo ezali ya komema mibéko ya nkita na bosaleli malamu biloko binsó.

Mobéko ebimaki tángo elekaki na site web ya Osservatore Romano. Ekobánda kosálema mokolo ya 10 ya sánzá ya mwambi. 

10 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 13:30