Lopit¨¢lo Bambino Ges¨´ eyambi b¨¢na misato ba¨²ti na Gaza
Vatican News
Mokolo ya misáto 13 ya sánzá ya mwambi, na pókwa, bána misáto ya Gaza bakitaki na libandá ya pépo ya Rome-Ciampino, elongo na babóti na bangó na bandeko na bangó ya mibáli pe ya bási. Ezali bána mibalé ya mibáli ya sánzá 6 pe mibú 13, pe mwána mwási mókó ya mibú 2. Simá ya botáli bangó na minganga na lopitálo ya bána Bambino Gesù, mwána ya sánzá 6 andimamaki na esika ya lipasó likoló ya bokáti mókó (une amputation), mwána mobáli ya mibú 13 bapesaki ye na eténi ya mosála etálaka makambo ya mutú pe mwána mwási ya mibú mibalé, azali na pási na libumu, ayambamaki na eténi ya lopitálo etálaka makambo ya bána po ya bozangi kolia malamu.
Makono loléngé na loléngé
Na bána misáto bakómi, motángo ya bána baúti Gaza baye bazali na lopitálo Bambino Gesù úta ebándeli ya étumba na sánzá ya zómi ya 2023, ekómi 20. Babeli ya mike bazali na makono loléngé na loléngé : pási na makoló pe mabóko, ba pótá ya móto na nzóto¡
Mawa ebongwami na mosála ya sóló
« Tángo nionso toyambaka bána baútaka na bisika bitumba bizali, tozali kokútana na bato balembi, bazali na pási pe elikya na káti na bangó », elobi Tiziano Onesti, mokambi ya lopitálo ya bána.
« Maloba ya Papá Léon XIV na eye etáli pási ya bato bazali na bisika ya etumba ekokundola na bisó ¡®te mawa ekoki kosúka kaka na liyoki (sentiment) mókó te, kasi esengeli ebongwama na likambo ya sóló ». Yangó waná, na lisalisi ya minganga, « tomipesi po ya kopesa na mabotá esika mókó ya malamu epayi wapi bakoki kopema kimia mwa moke. Toyébi ¡®te po na mókó mókó ya bána baye, nzelá ekozala pási, kasi bakoki kosála yangó bangó mókó te : bakozala pembéni na bangó lisangá na bisó » na « boyébi mosála pe na bomoto na ye, na eténi ya etindá eye Ngwende ya Sántu-Petelo epesi bisó banda kala ».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo