ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Botamboli ya bato baboyi mobulu ya bato ya pomba na Port-au-Prince Botamboli ya bato baboyi mobulu ya bato ya pomba na Port-au-Prince 

Lok¨¢s¨¢ po ya kimia na Ha?ti ezali kolukama

Libos¨® ya ¡°mokakatano lol¨¦ng¨¦ na lol¨¦ng¨¦ eye ezali na Ha?ti¡±, Ngwend¨¦ ya S¨¢ntu-Petelo esepeli na mis¨¢la bis¨¢lemi na secr¨¦tariat g¨¦n¨¦ral ya Lisang¨¢ ya Bik¨®l¨® y¡¯Amerika. Na lisik¨²l¨² na ye o eleko ya likita ya Conseil permanent, Mgr Juan Antonio Cruz Serrano, mot¨¢li ya t¨¢ngo ins¨®, alobaki lisusu nd¨¦ng¨¦ Ngwend¨¦ ya S¨¢ntu-Petelo ezali pembeni na bato ya Ha?ti, pe lisalisi mak¨¢si na ye na maye bikoluka kot¨®mbola kimia.

Jean-René B.- Kinshasa

«Lokásá po ya kimia ekambemi na Haïti na lisalisi ya bikóló bisusu¡±, ezali ndéngé ebengami na mokandá elakisamaki mokolo ya misáto ya 20 na sánzá ya mwambi, na secrétaire général ya Lisangá ya Bikóló y¡¯Amerika, Albert Ramdin, o eleko ya bokutani ya Conseil permanent. Lokásá ena ekoluka kopesa biyano bilongobani na mokakatano ya loléngé na loléngé na Haïti, na bolendisi boyokani na bikolo bisusu.

Ekóló ezali úta kalá na mobúlú ya bobomi na bato ya pomba, pe engebene na mokandá (rapport) ya ONU, koleka bato 1 500 babomaki bangó káti na sánzá ya minei pe eye ya motóbá. Mokandá elakisi, o eleko yangó, na moke bato 185 bamema bangó na makási bipayi biyebani te pe bato 628 bazali baye bazui bangó na makási po ya nzóto.

Vatican ezali pembeni

Likambo mókó eye Ngwendé ya Sántu-Petelo etelemeli yangó, na lolaka ya Mgr Juan Antonio Cruz Serrano, motáli ya eleko insó epayi ya Lisangá ya Bikóló y¡¯Amerika. Vatican elobaki lisusu ¡®te ¡°ezali pembeni ya bato ya Haïti, pe elakaki lisusu lisalisi makási na ye na boluki kotómbola kimia¡±.

O eleko ya bokutani ya Conseil permanent, lingómbá ya batindámi ya Vatican elakaki ¡®te ekolanda na bokebi ¡°bosáleli ya lokásᡱ. Ngwendé ya Sántu-Petelo ekanisi ¡°kokoba kosála elongo na basusu na ndéngé akoki¡± po ya bolamu ya bato ya Haïti. Lokásá elakisamaki, elobaki Mgr Serrano, ekoki koyanola na likambo mókó ya pási eye ezali na Haïti.

Mbela ya lombángu ya Léon XIV

Mokolo ya 10 ya sánzá ya mwambi elekaki simá ya losámbo y¡¯Angélus, esika ya Sántu-Petelo, Papá Léon XIV akébisaki bato na eye etáli ¡°likambo ya bato ya Haïti oyo ekómi kobúngisa elikya makási¡±. ¡°Ba nsango, elobaki ye, bizali koloba mingi bobomi bato, mobúlú ya loléngé na loléngé, ya botekisi bato, ya kotindá na makási bato na libánda ya ekóló pe bomemi bato na makási¡±. Sántu-Papá abengaki, lokóla Papá François, ¡°bakambi bansó kotika na lombángu bato bakangemi na makási¡±, na boséngi lisusu ¡°lisalisi ya sóló ya bikóló binsó po na kosála makoki bilongobani po ya bato pe po ya bulamatari, biye bikosúnga bato ya Haïti ya kobika na kimia¡±.  

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

23 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 14:24