Isra?l-Palestine: Ngwende ya S¨¢ntu-Petelo elingi ¡°nz¨¦la ya Bik¨®lo mibale"
Vatican News
Mobúlú (terrorisme) ekoki atá moke te kosémbolama, kasi ¡°bosémbo ya bobáteli na ndéngé elongobami esengeli esalema na ba ndelo biyebani pe na loléngé mabé esálemaki¡±. Ngwende ya Sántu-Petelo elobaki yangó lisusu, na makási pe na pási, tángo ya lisangani ya likoló ya ONU etali ¡°bosilisi likambo ya Palestine pe bosáli nzéla ya Bikóló mibále¡±, esálemaki na France pe Arabie saoudite pe esúkisamaki mokolo ya 30 ya sánzá ya sambo na New York.
Motali ya eleko inso (observateur permanent), Mgr Gabriele Caccia, aséngaki bôngó na bobeti sete na ¡°bozimi móto sik¡¯oyo, botiki bakangemi ya Israël, bozongisi ba nzóto ya bakufi, bobáteli ba civils nionso ya Palestine engebene na mobéko ya mokili mobimba po ya bato pe bozui lisalisi ya bilei na matáta te¡±. Azangaki te kozongela botelemeli ya mobúlú esálemaka mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi na Hamas epayi ya bato ya Israël.
Pósa liboso ya pási ya bato
Ngwende ya Sántu-Petelo, elobaki ye, ¡°etungisami makási na bomáti makási ya pási ya bato na etúká ya Gaza¡±, yangó waná mbela ebwákami na mokili mobimba zambi epesa eyano sik¡¯oyo na ¡°bokimi bisika bavandaka ya mabótᡱ, ¡°na bokwéi ya misála bisengeli¡±, na ¡°nzala ezali sé kokóla¡± pe na ¡°bopimi ya bansó¡± biye ¡°bikotungisa boyebi ya bato¡±.
Episkopo atelemaki na eye ekokómela ba civils likoló ya etumba, na bolobi motángo ya bána babomaki bangó, bobuki ba ndáko, ba lopitalo pe bisika ya losámbo, na botángi mingi ¡°bobeti esálemaki na ndáko-Nzámbe ya Libótá Lisántu eye ezokisi lisusu lisangá mókó esili enyokwama kala¡±. Likambo ena epesi bobangi makási, na botali mosála ya bakristu na epáyi waná eye, úta kala, bakomilakisa ¡°lokóla bozali mókó ya kimia, ekosúnga bosololi pe kimia¡±.
Eyano ya bikóló mibále, nzéla kaka mókó ya malongá
Vatican ezali na kondima ¡®te ¡°eyano ya Bikóló mibále, na ba ndelo biyebani mokili mobimba, ezali nzéla sé mókó ya malongá pe ya bosémbo po ya bozui kimia mókó ya sémbo pe ekowúmela¡±. Na botatoli makambo ya tina bisálema kino lelo, lokóla ya bondimi ya sólo Ekóló ya Israël na boyokani ya 1993 pe bondimi ya Ekóló ya Palestine na boyokani ya 2015. Mgr Caccia alobaki lisusu lisalisi makási na ¡°makoki bikoki kolongwa te ya bato ya Palestine, na káti waná likoki ya kopona eye balingi¡±, na lokóla ¡°bapósa bilongobami¡± ya bato ya Palestine ya ¡°kobika na bonsómi, na bokengi pe na lokúmu o ntei ya Ekóló mókó ezali na bonsómi¡±
Tina ya Yélúsaleme
Na bosúkisi, motali ya eleko inso alobaki lisusu tina ¡°ya boyambi pe ya bokoko ya mokili mobimba¡± ya Yélúsaleme, mbóka esantisama na bakristu, ba yuda pe ba musulman, pe eye esengeli kozua ezalela mókó eye ¡°ekozala likoló ya bokabwáni ya politiki pe ekolingisa bobáteli ya bomoto na ye¡±. Boséngi ya Mgr Caccia, elobami mbala ebele na Ngwende ya Sántu-Petelo, ezali eye ya ¡°ezalela mókó ebongisami na likoló ya bikóló binso, ezali na likoki ya kobátela lokúmu pe bosémbo ya bato ya mbóka ena pe bandimi ya biyamba misáto, bokokani liboso ya mobéko po ya bansó, na bobáteli bomibonza ya mbóka pe libula (patrimoine) ya biyamba pe ya bokoko na ye¡±. Mokánda mókó ekolingisa lokóla ¡°bobáteli ya bisika bisántu¡± na lokóla ¡°bosémbo ya koyingela kúna na matáta te pe ya kosámbela¡±. Ezali mawá ya komona ¡®te bakristu bazali na bobangi na mbóka ya Yélúsaleme.
Bosololi eleka liboso ya nionso
Na bosúkisi maloba na ye na botangi Papá Léon XIV, Mgr Caccia abengaki ya kosúkisa ¡°kibosenzi ya etumba¡±. ¡°Na eleko mókó wápi epayi bokasi emonani mingi penzá lokóla likambo ya liboso ya kimia¡±, po na ye, ¡°ezali kaka na bosololi na bolembu pe na banso ndé ekoki komema na bosilisi mókó ya sémbo pe ekowumela ya bitumba¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo