Dicast¨¨re ya Bosololi ekol¨¦ndisa po ya makambo ya ntina ya bato
Jean-René B.-Kinshasa
Mosisa ya latin ya liloba ¡°communiquer » esangisi maloba mibále misusu : « cum », lisangá, pe « minus ». Pe yangó « ekolakisa bisó ¡®te bosololi ezali yambo mpezá likabo mókó ya bisó-mókó, likabo mókó ebótami na boyokani eye tokosála ba songolo na ba pakala, emóni préfet ya dicastère ya Bosololi. O eleko ya likita ekosálemaka simá ya mibú misáto ya UCAP (Union Catholique Africaine de la Presse), eye ekosálema n¡¯Accra na Ghana kinó mokolo ya 17 ya sánzá ya mwambi, Paolo Ruffini atindélaki nsango mókó na mokónzi ya lisangá Charles AYETAN, na baye bansó basangani o likita. Etángemaki na bofúngoli misála mokolo ya 10 ya sánzá ya mwambi, na Mgr Yaméogo Janvier, elama ya dicastère ya Bosololi.
Ba algorithme
«Bokáti-káti o ntei ya bomáti ya tekiniki pe bobateli ya makambo ya ntina ya bato o eleko ya Intelligence Artificielle¡±, likambo-likonzi ya bokútani ¡°ekolakisa pósá na binó¡±, ekomaki Paolo Ruffini. Ekolakisa polélé motúna mókó eye ¡°etúnamaka na bosóló¡±, eye ya koyéba boni ba algorithme, pe ba masini bikosálela yangó, bikoki kozala na mosála ya moto, ya bosóló, ya boyébi, ya koyéba, ya kitoko, pe ya bopanzi yangó.
Po na koyanola waná, elobaki préfet, ¡°esengeli kobóya ¡®te bisálisa kosála eloko mókó ya kokónza bato eye ekobébisa nionso, na bobosani atá ya sóló, ya sémbo pe ya kitoko; eloko mókó ekopekisa boyébi ba mikúmba¡±, pe ¡°ekotónga monyámá mókó epayi wapi bomókó ya moto ebonzami ngonga mókó na lokúmu na ye¡±. Pe epayi wapi, ekobaki ye, ¡°intelligence artificielle emónani lokóla ekweyaka te, ezali na libúnga te, ezali na likama te, eyébi nionso, na bokeseni na likambo ya nzebi eye esimbi yangó¡±.
Intelligence artificielle pe bomoto
Esengeli koyéba ¡°soki pe boni bomáti ya intelligence artificielle ekoki kosálisa bisó ya kokóma bato koleka, to ekotinda bisó ya kokitisa bomoto na bisó¡±. Lokóla bóni-bóni intelligence artificielle ekokómisa ¡°boyokani kati na bato makasi pe sóló koleka, pe masangá na bomoko koleka¡±, pe bóni-bóni ¡°ekomátisa bozali yo mókó (solitude) ya baye bazali bangó mókó kala, na bopekisi mókó mókó na bisó na molungé eye kaka bosololi ya sóló ekoki kopesa¡±, elobi Paolo Ruffini.
¡°Ezali ya kobongisa to te mibéko pe ba ndelo, ndakisa etáli algorithme ya indexation pe ya désindexation ya mitele ya boluki-luki bizali na makoki ya kotómbola to ya kolongola bato pe makanisi, masoló pe mimeseno engebene na mibéko bizali na nzéla te na bosóló¡±.
Mayele ya motéma pe ya bwanyá
Préfet ya dicastère ya Bosololi akobianga ya « kobika malamu koleka eleko na bisó, eye ezali ya kokelama te », ya kozala na bobángi te ya mikakatano na ye pe ya makabo na ye ; ya kotónga bomoto mókó ya sika na bosóló pe na bosémbo. Kasi lokóla, kotánga pe koloba lisapo na mayéle ya motéma, na bwanyá ya bolingo, na bokesenisi te makoki pe súka, bosóló pe lokutá, kosála mitúya pe koyóka. « Eye eséngami na bisó, ebetaki ye sete, ezali ya kotikala bato ». O eleko mókó eye ba médias sociaux babongoli makambo makási « boyokani káti ya ba institution pe bato, Eklezia ebengami ya kotatola kitoko ya lisangá na ye », ekomaki préfet.
Libonza ya UCAP
Po na Paolo Ruffini, likita eye na eténi ena ya mokili, ezali po ya eklezia y¡¯Afrika ¡°eleko mókó ya malongá ya botatoli boyambi na bisó na Yezu Kristu oyo azali kosála bomoko na bokeseni po ya kozongela elembo ya Papá Léon XIV ¡°In Illo Uno Unum¡±, ¡°Na Oyo azali mókó, tozala mókó¡±. Akúmisi na nsango na ye bopesi ya loléngé na loléngé na libonza ya UCAP, epayi ya masangá ya bikóló pe ya engúmba y¡¯Afrika pe ya mokili mobimba, po UCAP na nzéla ya bilama na ye azalaki na molende na molongó ya Synode úta ebándeli.
¡°Tika ¡®te molimo ya bolimbisi epayi na epayi, ya bozongisi bondeko, ya bosangani pe bozali eléisa makási na binó po ya kotómbola mikakatano pe liponami ya bakambi bazali na mokúmba ya kotambuisa UCAP zambi ya kosalisa bomoko n¡¯Afrika¡±, eséngi ye po ya kosúkisa.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo