Batindami ya ba Mus¨¦e ya Vatican bapesi na Pap¨¢ tableau m¨®k¨® ya s¨¢ntu Augustin
Vatican News
Papá Léon XIV ayambaki na likita mokolo ya póso ya 2 ya sánzá ya mwambi batindami ya ba Musée ya Vatican na ndáko ya makita mókó pembeni ya eye ya Polo VI. O eleko ena, tableau ekolakisa sántu Augustin na anzelú mókó, mosálá ya mosáli mókó ya ntoki ayebani te ya Roma ya ekeke ya 18, epesamaki na Papá. Tableau yangó ebongisamaki na laboratoire ya Vatican.
Mamelo Raffaella Petrini, mokónzi ya búlámatári ya Leta ya Vatican, Barbara Jatta, mokambi ya Direction ya ba musée pe ya maye mansó bikotalaka bonkoko, Giandomenico Spinola mokambi molandi ya makambo ya ntoki pe ya nzebi ya ba musée ya Vatican, Alberto Albanesi, mokambi molandi po ya kolengelé lolénge ba musée bizali kotambola, Francesca Persegati oyo azali mokambi ya kala ya laboratoire ya Vatican pe Paolo Violini oyo azali mokambi ya sika ya laboratoire, bazalaki o káti ya batindami.
Káti na bangó bizalaki lokóla Mgr Terence Hogan oyo akambaka boyokani na bato basúngaka ba musée ya Vatican, Alessandra Rodolfo oyo atalaka makambo ma ntoki ya bikeke ya 17 pe ya 18, pe Laura Baldelli, mobongisi ya laboratoire ya Vatican.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo