ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Papa Leon akendeki kotala observatoire ya Vatican Papa Leon akendeki kotala observatoire ya Vatican   (ANSA)

Astronome m¨®k¨® ya j¨¦suite aponami lok¨®la mokambi ya Obseravatoire ya Vatican

Mw¨¢na-mb¨®ka Goa, na Inde, astrophysicien pe mok¨®nzi ya lisang¨¢ ya ba j¨¦suite, akitani na ndeko Guy Consolmagno oyo azalaki na esika ena ¨²ta 2015. Akozua esika wan¨¢ mokolo ya 19 ya s¨¢nz¨¢ ya libw¨¢ ekoya.

Vatican News

Papá aponaki mokolo ya minei ya 31 ya sánzá ya sambo, mokambi ya sika ya Observatoire ya Vatican, mókó ya ba observatoire ya kala na mokili.  Observatoire ezali esika ya kotala ba minzóto pe astronome ezali moto mókó ya mayéle na makambo ya minzóto. Ezali jésuite ya ekóló Inde sángó Richard Anthony D¡¯Souza, S.I, astronome kaka o ntei ya esálelo ya nzebi ena. Akozua esika waná mokolo ya 19 ya sánzá ya libwá ekoya. Mwána-mbóka Goa, na Inde, ya mibú 47, akoli na libótá mókó ya bakristu, mofúlele akitani na ndeko Guy Consolmagno, oyo azalaki kokamba Observatoire úta mokolo ya 18 ya sánzá ya libwá 2015. Akokoba kosála mosála na ye y¡¯astronome pe ya mokónzi ya Fondation ya Observatoire ya Vatican eye ezuami na Tucson, na Arizona, n¡¯Amerika.

Ndeko Consolmagno:¡°Na sángó D¡¯Souza, emonaneli pe bwanyᡱ

Na bolobi mbóngwana ena, ndeko Guy Consolmagno ye-mei alobaki: ¡°Nazali na esengo ¡®te Sántu-Papá aponi sángó D¡¯Souza lokóla mokambi ya sika ya Observatoire ya Vatican. Nayebi ¡®te sángó D¡¯Souza azali na emonaneli pe bwanyá bisengeli po na kotámbuisa Observatoire na eleko eye ya mbóngwama makási  na bolúki-lúki nzebi n¡¯astronomie, mingi mpenzá likoló ya mosála na ye na ba télescope spatiaux pe ya technique informatique epúsana¡±. Na ye pe lokóla, sángó D¡¯Souza amoni ¡®te: ¡° o káti ya mibú zómi ya bokambi Observatoire, ndeko Consolmagno amikesenisi na bomipesi na ye po ya bosololi káti ya nzebi pe boyambi, na bopanzi boyebi pe na botómboli bolúki-lúki n¡¯astronomie na mokili¡±

Nzela pe mikúmba ya mokambi ya sika

Sángó Richard D¡¯Souza abotami na 1978 na Inde pe azali mwána-mbóka ya engúmba ya Goa. Akoti na Compagnie ya Yezu na 1996 pe akúlaki bongánga-Nzámbe na 2011 simá ya boyekoli philosophie pe théologie na Jnana Deepa na Pune, na Inde. Na eteyelo ya likolo: azui licence na Physique na St. Xavier¡¯s College ya université ya Mumbai, master mókó ya physique na université ya Heidelberg, n¡¯Allemagne, epáyi wápi asalaki na Institut Max Planck y¡¯astronomie na université ya Heidelberg po na thèse ya maîtrise, doctorat mókó na astronomie ya université Ludwig Maximilian ya Munich¡­. Elama ya Observatoire ya Vatican kobánda 2016, azuaki esika ya supérieur ya lisangá ya ba jésuite úta 2022.

Bokobi pe bozongisi sika

Liponami ya D¡¯Souza ekolakisa eleko mókó ya tina na bokobi pe bozongisi sika ya Observatoire ya Vatican, mókó ya ba observatoire ya kala y¡¯astronomie na mokili. Tángo akelaki Observatoire ya Vatican ya sika na 1891, Papá Léon XIII apesaka etindá na yangó  na motu proprio Ut Mysticam boye: ¡°Bato bansó bayeba malamu ¡®te Eklezia pe babateli na ye bakotelemela nzebi ya sóló pe ya molende te, ya bomoto to ya molimo, kasi bakoyamba yangó, bakolendisa yangó pe bakotómbola yangó na bomipesi nionso¡±.  

Mokolo ya 20 ya sánzá ya sambo elekaki, o eleko ya bokundoli alunissage ya yambo na 1969, Papá Léon XIV akendeki na Observatoire ya Castel Gandolfo po ya kotala ba télescope pe bisaleli ya ba coupole.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

02 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 14:20