ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.07.24 Giubileo degli influencer digitali BANNER

Zubil¨¦ m¨®k¨® epesami po na batind¨¢mi ya num¨¦rique pe ba influenceur katoliko

Ba nk¨¢m¨¢ ya bato bazelami na Roma mikolo ya 28 pe 29 ya s¨¢nz¨¢ ya sambo po na likambo ena. Mokolo ya yambo ebonzami na lisangani m¨®k¨® ekosalema na auditorium Conciliazione, na lis¨¢lisi ya ba j¨¦suite David McCallum pe Antonio Spadaro. Mokolo elandi, boleki ya Ekuke Es¨¢ntu ebongisami, ekolandama na misa na basilique Santu-Petelo. Misa ekokambama na episkopo ya lok¨²mu Tagle, pro-pr¨¦fet ya dicast¨¨re po ya Bopanzi Nsango Elamu.

Vatican News

Losámbo, masoló pe bozali na baninga bikozala o kati ya Zubilé ya batindámi ya numérique (missionnaires numériques) pe ba influenceur katoliko, mikolo ya 28 pe 29 ya sánzá ya sambo bikoya. Po ya bozui nsango na likambo yango, application ¡°Vatican Vox¡± esalemaki na bobongoli mbala mókó na ba nkótá mitáno, kasi eye ya Radio Vatican ebongisi ba bobongoli pe maloba ya bato na nkótá mwambi. Mokánda mókó ekomami, elongó na Protection civile.

Likita etali etindá na eleko ya ba réseau numérique

Misa ya bofungoli ekosalema na ba paloise bikeseni bizuami mosiká te na Vatican. Simá ya misa, baye bakozala waná bakokende epayi ya Auditorium Conciliazione po na bofungoli ya Zubilé, na ngonga ya libwa, liboso ya episkopo ya lokúmu secrétaire ya Leta Pietro Parolin, ya Mgr Rino Fisichella, pro-préfet ya dicastère po na Bopanzi Nsango Elamu, pe ya Paolo Ruffini, mokambi ya dicastère ya Bolobelani (Communication). Mgr Lucio Ruiz, oyo azali secrétaire ya dicastère ena, akoyamba bato ya mobémbo mwa boyambi pe po na bangó abongisi likanisi mókó ya jésuite David McCallum, mokambi ya lisangá ¡°Discerning Leadership¡±, etalaka Liloba ya Nzámbe. Lisangani ekoki kolandama mbala mókó na esika ya YouTube ya Vatican News.

Jésuite Antonio Spadaro, secrétaire molandi ya dicastère po na Bonkoko pe Litéya, akozua maloba lokola po na koloba likabo ya eteyelo ya mambi ma Nzámbe (théologie) na etindá o eleko ya ba réseau pe algorithme. Makambo misúsu ya etuluku (groupe) ya boyekoli ya Synode etali synodalité bikolobama lokola. Bituluku ya boyekoli bikosála ya koyeba motindo ya bozali mobimba ya Eklezia na likambo ya numérique.

¡°Basántu influenceur ya Nzámbe¡±

Masangani mibále ya bokaboli makanisi bibongisami na simá ya nzanga ya mokolo wa yambo 28 ya sánzá ya sambo : ya liboso na ngonga ya 15, po na bokaboli maye bayebi na eye etali batindámi ya numérique. Ya mibále, na ngonga ya 17 na ndámbo, ekotala « basántu influenceur ya Nzámbe ». Simá ya lisangani mókó, pembeni na ngonga mókó ebonzami na masoló na bituluku ya mosálá. Bileko biye bikosúkisama na losámbo eye ekokambema na episkopo ya lokúmu Óscar Rodríguez Maradiaga, episkopo ya kála ya Tegucigalpa na Honduras. Na ngonga ya 21 na ndámbo, episkopo ya lokúmu José Cobo Cano, archevêque métropolitain ya Madrid, akokamba bokumbameli ukaristya pe nzebi ya mambi ma Nzámbe (liturgie) ya botubeli na basilique Sántu-Petelo.  

Kotika mikáno ya numérique na losámbo

O kati ya Zubilé, ekozala na bosangani mókó enene na esika Piazza Pia, ekolandama na mobémbo mwa losámbo na Conciliazione pembeni na basilique Sántu-Petelo, úta ngonga ya mwambi, mokolo ya mibále ya 29 ya sánzá ya sambo. Na ngonga ya zómi, episkopo ya lokúmu Luis Antonio Tagle, pro-préfet ya dicastère ya Bopanzi Nsango Elamu, akokamba misa.

Na manaka lokola, na ngonga ya 14, bokutani mókó ya biyamba (rencontre ?cuménique) na Auditorium ebengami « Elongó po ya elikya » ekosalema na nzela ya Vatican News. Likambo mókó ebongisami na Lisangá Taizé. Ekozala esika mókó ya bokutani, ya lisangá pe ya etindá ekabolami na baye, bipayi binsó ya mokili, basakola elikya na mumérique. Ekolanda ngonga mókó ya bosakani. Bato bakozala waná babengami ya koloba elikya na bango, boyambi na bango pe esengo na bango na ba réseau numérique.

O eleko ya botali ba jardins ya Vatican, mikáno ya ba influenceur bikopesama na Maria, ¡°influenceuse ya Nzámbe¡±, na bosengi ye ya kokamba na kibomama na ye bozali katoliko na mokili ya numérique. Ba influenceur bakobengama lisusu ya kozala na festival ebongisami po na bangó na esika ya Risorgimento, mosiká te na Vatican, po na boyoki mindúle pe matatoli biwuti na bikolo bikeseni, eleko yango ekokumisama elongó etindá ya komema elikya na mokili ya numérique.  

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo

26 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 12:57