S¨²ka ya etind¨¢ po ya motindami ya Pap¨¢ epayi ya ba syro-malabars na Inde
Nsango ya Vatican News
Eleki mibú mibale Papá François apesaka ye etindá ya kozongisa kimia o kati ya lisanga ekabwanaki pe na boswani na maye matali zebi ya milulu mya eklezya. Mokolo ya yambo 7 ya sánzá ya sambo, dicastère po na ba Eklezia ya monyele esakolaki súka ya etindá ya Mgr Cyril Vasil¡¯, lokola motindami ya Papá wa Roma na likambo ya ba syro-malabars. Na communiqué, dicastère elakisi ¡®te Papá Léon XIV alobaki ¡°matondo enene po na mosala eye esalemi¡± na episkopo ya Ko?ice ya ba Byzantins.
Kwokoso
Sango jésuite ya esalelo ya Byzantine akendeki mbala ya yambo na archiéparchie ya Ernakulam-Angamaly na sánzá ya mwambi ya 2023, na bosenga ya Papá François, po na komeka kosilisa kwokoso ewumelaki na oyo etali lolenge moko ya kosala po ya bosepeli Santu-Qurbana, misa na momeseno ya kuna. Boyokani ezuamaka o eleko ena- ememanaki na synode ya syro-malabar ya kobongisa bosali ya lolenge ya sika ya Santu-Qurbana na súka ya mobu 2021- endimamaka na ba archidioceze 34 longola kaka eye ya Ernakulam-Angamaly. Boboyi ena ememaki bokabwani: Papá François akotaki na likambo yango na mokandá ya yambo na sánzá ya misato 2022 po na komeka kosilisa kwokoso.
Etindá ya mibale ya Mgr Vasil¡¯
Sima ya etindá ya yambo, Mgr Vasil¡¯ azongaki mbala ya ibale na archidioceze ya syro-malabar na sánzá ya zómi na mibale 2023 po na kokoba mosala na ye ya boluki boyokani. Na kati ya mikakatano, motindami ya Papá akanamaki na ndambo ya bandimi, bakomaki ¡®te babamba ye biloko. Basusu batumbaki bilili ya mokambi ya dicastère ya ba Eklezia ya monyele ya eleko ena, episkopo ya lokúmu Leonardo Sandri. Liboso ya mobembo ya mibale na Inde, mokolo ya 7 ya zómi na mibale ya 2023, Papá François azuaka ye-mei mokano ya kokota lisusu likambo yango po na kokitisa mitema, mbala eye na nsango na vidéo, na bobengi ya kobongisa likambo yango na kobatela lisanga.
Kobatela bomoko
Na sánzá ya yambo ya 2024, François andimaka liponami ya episkopo ya sika ya Ernakulam-Angamaly, Mgr Raphael Thattil- akitamaki bôngó na episkopo ya lokúmu Alencherry- pe sima, na sánzá ya mitano, ayambaki na likita batindami ya Eklezia ya kala ya Inde, abiangaki bango lisusu na ¡°kobatela bomoko¡±.