ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Lisikulu ya Mgr Gallagher na Inde Lisikulu ya Mgr Gallagher na Inde  

Na Trivandrum, Mgr Gallagher afungoli eteyelo moko ya mambi ma Nzambe

Secr¨¦taire ya Ngwende ya Santu Petelo ya boyokani na Bikolo akokoba mob¨¦mbo na ye ebandaki mokolo ya 13 ya s¨¢nz ya sambo na Inde. Mokolo ya mibale ya 15 ya s¨¢nz¨¢ ya sambo, atiaki libanga ya yambo ya eteyelo moko ya sika ya mambi ma Nz¨¢mbe na Trivandrum, na et¨²k¨¢ ya Kerala. Na lisik¨²lu moko, asengaki batangisi pe bayekoli ya komipesa po "ya mosala, ya kimia pe ya bozongisi bondeko".

Nsango ya Vatican News

Sima ya kozala na bosepeli ya moto ya lokúmu Mar Ivanios mokolo ya mibale 15 ya sánzá ya sambo na Trivandrum, secrétaire ya Ngwende ya Santu-Petelo ya boyokani na Bikolo akendeki na St. Mary's Malankara Syrian Catholic Major Seminary, likindo moko ya Eklezia katoliko, po na bofungoli eteyelo na ye ya sika ya mambi ma Nzambe. "Tosangani lelo na molimo moko ya bomoko, ya boyambi pe ya botondi", elobaki Mgr Gallagher, na bolakisi ntina ya mokolo yango eye "ekotikala na lisapo ya Eklezia eye". Na milio 23 ya bandimi, ba katoliko bazali na nsé ya 2% ya bato na Inde, bakabwani na rite latin, syro-malabar pe syro-malankare.

Bwanya, bososoli pe bolingo

Na lisikúlu na ye, episkopo abiangaki bandimi bazalaki wana ya kokanisa na libula ya ntalo etikala na Eklezia syro-malankare eye, "na misisa na ye ya mozindo ya momeseno ya eklezia pe litatoli makasi o bikeke ebele, epesaka ntina enene na boyekoli, na kotangisa po ya molimo pe na mosala". "Na losambo, na boyiki mpiko pe na bomipesi, bakoko na bino batongaki ba misala biye bibongisi bomoyi pe masanga ebele", elobaki ye. Libula moko ekobenga bayekoli ya lelo na mokumba pe na bokobi nzela esili ebanda, na boluki tango inso bwanyá mingi, na bokolisi bososoli pe na kosala na bolingo.

"Botelemisi libanga ya yambo eye ezali liloba moko ya bomipesi na biso po na lobi. Eteyelo ya mambi ma Nzambe ekozala esika moko epayi wapi boyambi na mayele bikozua bilei na boyokani, esika moko ya bokanisi moko ya mozindo, boyekoli moko ya makasi pe bokoli moko na molimo ekoki kobongola", elobaki Mgr Gallagher.

¡°"Awa, milimo ya mike bikoteyama kaka lokola bato ya mayele pe ba bateli te, kasi lokola bakambi na motema enene, batongi ya gbagba pe basali ya mokili. Awa, bosolo bizanga bileko ya boyambi na biso bikoluka na bosololi mikakatano pe mabaku ya mokili na biso ya sika. Eteyelo eye ekozala mwinda ya elikya, ekongengisa mwinda ya Kristu po na baye banso bazali koluka bosolo pe nzela ya kolanda. Ekozala esika moko epayi wapi mituna bikoyambama malamu, epayi wapi bokeseni bikozuama lokola libaku moko ya kokola, epayi wapi bolandi nzebi ekotambuisama na bwanyá ya Nsango Elamu"¡±

Mgr Gallagher asúkisaki na bobiangi bateyi na bayekoli ya kotala liboso pe ya kokanisa eteyelo moko efungwama po ya banso, emipesi po "ya mosala, kimia pe bozongisi bondeko", ebongami po ya "kokutana na mikakatano ya lobi".

18 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 16:31