Na foire ya Roma, bilenge bazali na ¡°p¨®s¨¢ mak¨¢si ya kom¨®na Pap¨¢ na lombangu
Jean-René B.-Kinshasa
Bilenge 25.000 bazali na Roma po ya Zubilé ya bolenge balalaki pongi na butú, na ba matelas ya camping pe ba sacs ya bolaleli, na Foire ya Roma. Kobánda ngonga ya 7 ya tóngo, bakosangana po na losámbo pe na simá, babongisi manaka na bangó ya mokolo.
O eleko ya Journée mondiale de la jeunesse na Lisbonne, Eulalie, mibú 26 pe moto ya France, azalaki bénévole, na Roma, azali na Zubilé lokóla moto ya mobémbo mwa losámbo. Alobaki esengo na ye ya komóna Papá na bofúngoli Zubilé ya bilenge na esika Sántu-Petelo: ¡°Ezalaki kitoko koleka!¡±, elobaki ye. Na botáli káti-káti ya Roma pe Sántu-Jean-de-Latran, akokaki koyébana na bato ebele ya Italie, ya Espagne pe ya Portugal.
Mibú misáto ya bosangisi mosolo po ya kozala na Roma
Nuno Riberio, mibú 31, moto ya etúká ya Porto, awuti Portungal. Akómaki na Roma na etuluku mókó ya bato 29: kozala áwa sik¡¯oyo, elakisi po na ye mbano azui simá ya mosála makási. ¡°Úta mibú misáto, tobongisi mosála na etúká na bisó po ya bosangisi mosolo po ya mobémbo eye na Roma. Tokolikya kozua na ndéngé elongobani mabongi nionso bibongisami po ya bisó. Tozali na pósá makási ya komóna Papá lisusu na lombángu na súka ya póso eye¡±, elobaki ye.
Na Foire ya Roma, mokili mókó ya moke ezali na kimia
Ba nkóta ebele, bonkoko bebo, bizaleli ebele bikeseni. Mikolo miye, ba pavillons ya Foire ya Roma bipesi elongi mosúsu ya mokili mókó ya moke na makambo na yangó ya bokaboli bisika pe biloko bisengeli bikoka na bansó. Lokóla na mokili ya mikóló, na esika ena lokóla, po na koyókana pe kovánda na kimia, esengeli boyokani ya bansó.
¡°Nazali na ndáko Domus, esika mókó ebongisami na ba bénévoles baye, lokóla ngai, tozali kosála bokengi na Sántu-Petelo. Kasi, na boyóki likambo yangó áwa na Foire ya Roma, nayei kosála bokengi áwa¡±, elobi Sofia Colonna, mibú 22, azali moto ya Italie. ¡°Nazali na mokúmbá ya bokengi ya pavillon 7. Mosála na ngai, na ba bénévoles misúsu ya etuluku na ngai, ezali ya kosenzéla po ¡®te bato ya mobémbo mwa losámbo bazala malamu na pavillon na bangó pe kimia ezala na esika ena¡±.