Misa ya yambo po ya bobateli Bozali ekokambama mokolo ya 9 ya s¨¢mbo
Jean-René B.-Kinshasa
Mokolo ya misato 9 ya sánzá ya sambo, Pápa Léon XIV akokamba misa moko na Castel Gandolfo, na Borgo Laudato si¡¯, pe akosalela po ya mbala ya yambo mokanda ya sika po ya nsámbo ya Misa ¡°pro custodia creationis¡±, elakisamaki mokolo ya minei 9 ya sánzá ya sambo na Ndako ya makita ya bopanzi nsango ya Ngwende ya Santu-Petelo.
Bazuaki maloba na bokutani na bapanzi nsango, episkopo ya lokúmu jésuite Michael Czerny, mokambi ya dicastère ya Mosala ya botómboli bomoto mobimba, episkopo franciscain Vittorio Francesco Viola, secrétaire ya dicastère po ya Losambo ya bozámbe pe ya disipline ya ba sacramento.
Likambo moko ebandaki o eleko ya François
Mokanda (formulaire) ¨C eye engebene na bato bazuaki maloba ebimaka na eleko ya Pápa François, na lisungi ya bato ya ba dicastère misusu- ekobakisama na Missae ¡°pro variis necessitatibus vel ad diversa¡± ya Missel ya Roma eye ezali na ba Misa pe nsámbo 49 po ya makambo kilikili: 20 bitali Eklezia, 17 bitali ba mposa ya bato, pe 12 bitali makambo lolenge na lolenge.
Bikokundola makambo mibale ya ntina
Mikanda ya sika, elimbolaki episkopo ya lokúmu Czerny, bizali po ya bókundoli makambo mibale: ¡°Liloba ya ntina po ya Mokolo ya mokili mobimba ya kimia¡±, ebongisamaka na santu Yoane-Polo II eleki mibú 35, na 1990, pe ezali na kombo ya ¡°Kimia na Nzambe Mokeli, kimia na Bozali inso¡±, pe bókundoli mibú zomi ya encyclique Laudato si¡¯ po ya bobateli ndako ya biso banso, ebongisamaka na Pápa François na 2015 pe ekotalisa ¡°bonzinganzinga mobimba¡± pe ya ¡°likolo likolo te¡±.
Bozali ezali kaka na liteya ya katoliko
Esengeli koloba, elobaki episkopo ya lokúmu, ¡®te ¡°likambo likonzi ya Bozali ezali likambo likonzi ekobakisama te, kasi ezali kaka na liteya ya katoliko¡±. Po ¡°Komunyo ekosangisa likolo na mabelé, ekoyamba pe ekoyingela na Bozali inso. Pe tango tokokumisa yango, mokili mobimba ekotondo Nzambe¡±. Mokanda ya sika elingi ezala ¡°lisalisi moko ya liteya, ya molimo pe ya lisanga, na yango banso tosengeli kobatela mabelé, ndako ya biso banso¡±
Mbela po ya botosi pe mokumba
Ezali, ezongelaki episkopo ya lokúmu Czerny, ¡°likambo moko ya monene ya boyambi, ya elikya pe ya mawa¡±, bobiangi moko ya ¡°koyanola na boboto pe bolingo, na boyoki moko ya koleka ya bokamui, ya botosi pe ya mokumba¡±. Ya solo, esukisaki episkopo ya lokúmu, ¡°tobengami banso ya kozala babáteli ya loboko ya eye Nzambe apesaka biso, na maponami na biso ya mokolo na mokolo pe na potitiki po ya bato, na pe lokola na losámbo, na misa pe na lolenge tovandi na mokili¡±.
¡°Bozali moko ya sika¡± ekokumbama mokolo ya eyenga nionso
Episkopo Viola alobaki lisusu ¡®te ¡°liteya ekokumisa tango inso ya Mobú ya liteya mobombano ya Bozali¡±; ndakisa o eleko ya Butu ya Pasika, litangi ya yambo ezali lisolo ya Bozali; na batisimo ekolobama na losámbo ya bobenisi mayi; na Liteya ya Ngonga ¡°likambo likonzi ezali kaka¡±. Pe, «na bomoi ya mokristu, eyenga ezali liboso mpenza féti ya pasika, ezui mwinda mobimba ya nkembo ya Kristu asekwi. Ezali bokumbami ya ¡°Bozali ya sika¡±&°ù²¹±ç³Ü´Ç;.
Kotombola bolendisi bato po ya bobateli ya bozali
Nionso wana, elobaki episkopo, ¡°ekosunga bozui boyebi koleka ya ntina ya bobateli Bozali, na lolenge ya mozindo elobami na mobombano ya pasika eye misa ezo sala ¡®te ezala¡±. Po lelo, ¡°lokola na lisungi ya liloba ya Pápa François, tozali koyeba na makasi ¡®te tozali na kati ya pasi koleka¡± ya bonzinganzinga (ecologie) pe ya nzingazinga (environnement).
¡°Tozali Nzambe te¡±
Na bozui liloba na ye, episkopo alakisi likambo ya mokumba. ¡°Tozali Nzambe te. Mabelé ezalaki liboso na biso pe epesameli biso¡±, elimbolaki ye. ¡°Lelo, esengeli toboya na makasi likambo ¡®te tokelamaki na elilingi ya Nzambe pe etinda ya kokonza mabelé elingi koloba ¡®te rozali na bokonzi moko boye likolo ya bikelamu misusu¡±. Bôngó, kobatela elingi koloba kobatela, kobongisa, kokengele. Wana ekosenga boyokani moko epayi na epayi kati na moto pe mabelé. Lisanga moko moko ekoki kozua na bolamu ya mabelé eye esengeli na ye po na kobika, kasi azali pe lokola na lotomo ya kobatela yango pe ya kosala ¡®te ekoba kobota po na baye bakoya sima¡±.
Kasi lelo, ¡°boyokani kati na Mokeli, bomoto pe Bozali inso ebebisama, po tolukaki tozua esika ya Nzambe, na koboya komiyeba lokola bikelamu bazali na ndelo¡±. Esali ¡®te ¡°lisumu emibimisi na bokasi na ye nionso ya kobebisa na bitumba, na mobulu ya lolenge na lolenga, na bobesi mabel顱. Episkopo asukisaki na bolobi ¡®te ¡°boyokani na bikelamu binso ekoki kobotama kaka na likambo moko ya bozongisi bondeko eye ekoki kosunga ¡®te komunyo na Nzambe na bandeko esalema¡±.