L¨¦on XIV atondi Osservatore di Strada, mongongo ya baye bazanga mingongo
Nsango ya Vatican
Pápa Léon XIV alingaki azala na liloba na ye na bosepeli ya mibú misato ya Osservatore di Strada, lokasa ya sánzá na sánzá ya Osservatore Romano, ebotamaki mokolo ya 29 ya sánzá ya motóba 2022. Bakutanaki na Roma, bilama ya lisanga ya bapanzi nsango ya lokasa ya sánzá na sánzá ekambami na Piero Di Domenicantonio, na lokola baye ebele bapesaka lisalisi, bakokaki koyoka liloba ya Santu-Pápa elobamaki na mokambi ya dicastère ya Communication Paolo Ruffini. Ye, elongo na secrétaire Mgr Lucio Ruiz pe Andrea Monda mokambi ya Osservatore Romano, babetaki ngonga ya ebandeli ya bosepeli na bopesi ba mbote.
¡°Baninga ya ntalo ya Osservatore di Strada¡±, ekomaki Léon XIV na liloba na ye, ¡°mosala na bino ezali na ntina, po ekoyebisa biso lisusu ¡®te mokili esengeli emonana úta nzela lokola, na bozui molende ya kobongola botáli, na bokati mikano biye bikopekisa biso mingi mingi ya komona pe koyoka na malamu pe na mozindo mongongo ya baye bazanga yango¡±. Na botondi bakomi ya lokasa ya sánzá na sánzá, Pápa alobaki lisusu bozali na bango na mwa kobombana eyenga inso na esika ya Santu-Petelo liboso ya losámbo y¡¯Angelus. Wana nde esika ekokabolamaka ofele lokasa ya sánzá na sánzá na lokota ya italie mokolo na mokolo na Ngwende ya Santu-Petelo.