ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bobeti ya limpinga ya Israel na eteyelo moko epayi wapi bato bakimi bitumba bavandi na Bureij, o kati ya etuka ya Gaza Bobeti ya limpinga ya Israel na eteyelo moko epayi wapi bato bakimi bitumba bavandi na Bureij, o kati ya etuka ya Gaza 

Episkopo ya lok¨²mu Parolin amoni mabe lolenge bomoi ezali p¨¢si na Gaza

Na lisol¨® apesaki mokolo ya 18 ya s¨¢nz¨¢ ya sambo na etando eke Rai 2 ya Italie, Secr¨¦taire ya leta ya Ngwende ya Santu-Petelo azongelaki mbela na nzel¨¢ ya singa ya Benyamin Netanyahu na Pap¨¢. Na bosepeli likambo Ministre wa Yambo ya Isra?l asalaki, asengaki ¡®te bos¨®lo esalema na lolenge nd¨¢ko ya Nz¨¢mbe ya Libota-Esantu ebetamaki. Alendisaki po ¡°p¨®s¨¢ moko ya politiki esilisa etumba¡±.

Nsango ya Vatican News

¡°Ezali etumba moko ezanga ba ndelo¡±; waná ezali likanisi episkopo ya lokúmu Pietro Parolin asalaki na eye ezali koleka na Gaza mokolo ya 18 ya sánzá ya sambo. Na lisoló asalaki na etando eke Rai 2 na nzelá ya singa mokolo ya mitáno ya 18 ya sambo, alobaki ba ¡°ndelo bileki¡± pe ¡°likambo ya mawa lolenge etumba ezali kokende¡±. Na eye etali bitumba ebele bizali koleka na mokili, episkopo ya lokúmu asembolaki ¡®te Ngwende ya Santu-Petelo emibongisami po ya koluka boyokani, kasi ¡°boluki boyokani¡±, elobaki ye, ¡°esalemaka kaka soki biteni mibale bandimi yango¡±.

Okanisi nini na mbela na nzelá ya singa ya Netanyahou epayi ya Papá?

Nakanisi ¡®te ezalaki na ngonga elamu, ebongaki te koyebisa Papá te, koyebisa ye mbala moko na eye elekaki, eye ezali mabe makasi. Nasepeli na mbela na nzelá ya singa, namoni malamu pósá ya Ministre wa Yambo ya Israël ya koloba mbala moko na Papá Léon XIV. Sik¡¯oyo, ndenge namoni, ezali na makambo misato ya kozela na mbela ena na nzelá ya singa na Papá: ya liboso, makambo biye bikobima na boluki eye elakamaki bizala ya sólo. Pambá te ndimbola ya liboso eye epesamaki, ezali ¡®te ebunga ezalaki, kasi bayebisaki biso ¡®te boluki ekosalema na likambo ena. Tokosenga boluki ena esalema na lolenge elongombami, pe biye bakozua biyebana, bilobama liboso na bato. Pe lisusu, sima ya maloba ebele: na súka koleka na misala. Nakolikya na bosólo ¡®te eye Ministre wa Yambo alobaki ekokokisama na lombangu mpenza, po eye ezali koleka na Gaza ezali pasi.

Tozali komona lokola tozali kokutana na etumba moko ezanga ba ndelo¡­

Ya sólo ezali etumba moko ezanga ba ndelo na eye tokokaki komona: lolenge okoki kobebisa pe koboma na nzala bato lokola ya Gaza? Ba ndelo bebo bisili bilekami. Epayi mosusu, tolobaki yango na ebandeli na Ngwende ya Santu-Petelo: motuná ya bokokani na eye esalemaki. Na likambo eleki na súka, ezali kokende lolenge bowuti kolimbola, ezali mbongwama moko ya pási. Kasi, totikela bango tango esengeli po bayebisa biso eye elekaki ya sólo. Soki ezali ya sólo ebunga, eye tokoki kotia tembe, to ezalaki na pósá moko ya kokotisa mobúlú mbala moko na ndáko ya Nzámbe ya bakristu, na boyebi malamu boni bakristu bazali baye bazali kotelema na kati na likambo ya Proche-Orient, pe lokola na boyokani kati na bato ya Palestine pe baye ya Israël. Ezali bongo na pósá moko ya kolongola eye nionso akoki kosala ¡®te bokati etumba moko liboso pe na simá kimia.  

Bisika ya etumba ebele bifungwami: eloko nini mosusu Ngwende ya Santu-Petelo ekoki kosala po na botelemi na kati na nzelá ya diplomatie?

Tozali ya kofungwama, tozali kopesa makanisi, waná esalemi mbala ebele. Koleka waná, nazali komona ezali pási ya kokende mosika, po kotelema na kati ya bato esalemaka kaka soki biteni mibale bizali na etumba bandimi. Tokokoba kobeta sete lokola tosalaka na bobungisi elikya te, kasi kokokisama ezali pási. Epayi esusu, baye libanda na Vatican bameka kotelema na kati bakoka te kino lelo. Esengeli na pósá moko ya politiki po ya kosúkisa etumba, na koyeba ¡®te motúya ya etumba moko ezali sómo po ya banso, na lolenge inso.

Ozali komona pósá yango te?

Mawa¡­nalingi namona nionso mabe te¡­nakolikya. Boyebisaki ngai maloba ya Netanyahou ¡®te bokati etumba ekomi pembeni: nalingi nandima yango.

20 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 13:41