Bos¨¢li ya Synode, lisanga moko ebongisami na s¨¢nz¨¢ ya zomi ya 2028
Jean-René B.-Kinshasa
Pápa Léon XIV apesaki mbote na bilama ya Secrétariat général ya Synode o eleko ya botáli moko ya mbangu mbangu mokolo ya 26 ya sánzá ya motóbá elekaki pe alobaki ¡°bokáti-káti¡± ya Synode na Eklezia. Na súka ya misala ya cénacle esalemaki úta 26 téé 29 ya sánzá ya motóbá, ba ¡°Nzela (pistes) po ya eteni ya bosáli ya Synode¡± bibimaki, na bobongisi nzela moko kino sánzá ya zomi ya 2028, eleko lisanga ya Eklezia ekosalema na Vatican.
Sik¡¯oyo kino eleko ena, ba lolenge ya bosáli na ba Eklezia ya bikolo pe masanga ya mike mike bikomekama, kati na sánzá ya motóbá 2025 pe sánzá ya zomi na mibale 2026. Ba botálisami bikosalema na 2027, yambo na ba masanga ya ba dioceze sima na Masanga ya ba episkopo ya bikolo pe ya mokili, pe masanga misusu ya ba Eklezia. Po ya kosúkisa, ba masanga ya mikili ya botálisami bikosalema na ba sánzá misato ya yambo ya 2028.
Kosalela ¡°Mokandá ya súka¡± ya Synode
O ebandeli ya ba ¡°Nzela¡± bina, episkopo ya lokúmu Mario Grech, Secrétaire général ya Synode, alobi lisusu ¡®te ¡°motindo ya Synode ya Eklezia ezali na mosala ya etinda na ye pe mbongwana nionso na bomoi ya Eklezia ekoluka kokomisa ye makasi po osakola Bokonzi ya Nzambe pe atatola Nsango Ndamo ya Mokonzi na mibali pe na basi ya eleko na biso¡±. Wana ezali mokano ya eteni ya bosáli, eye ekosimba Mokandá ya Súka ya Lisanga enene ya zomi na motóbá ya Synode ya ba episkopo, ¡°Po ya Eklezia moko ya Synode: lisanga, bozali, etinda¡±, eye endimamaki na súka ya eteni ya mibale ya Lisanga ya Synode, mokolo ya 26 ya sánzá ya zomi ya 2024.
Mokandá ¡°ezali kobanda sik¡¯oyo na kati ya liteya, pe esengami na ye asalela yango po ya kosalela ba mbuma bikowuta na ba eklezia ya bikolo¡±, esembolaki mamelo Nathalie Becquart, secrétaire molandi ya Secrétariat général ya Synode. Ye abeti sete na oyo etali mokumba ya lisanga ya moto moko moko azua batisimo po na etinda ya Eklezia. ¡°Episkopo azali ye moko te na eteni eye ya bosáli¡±, elobaki ye.
Boyambi ya Synode
Mamelo Becquart alobi tina ya kosúnga bokutani kati na ba Eklezia bikeseni: ¡°Eklezia moko moko ya ekolo azali na nzela na ye kasi bakoki kotia ye pembeni te. Mokandá eye ezali na mosala ya bolakisi ¡®te esengeli te kosuka na mbongwana ya yo moko ya Synode¡±.
Tina ya ba ¡°Nzela¡± ezali ya kosúnga boyambi ya mokandá na ba Eklezia ya bikolo. Bikoluka bongó lolenge pe mozindo ya Mokandá ya súka ya Lisanga ya 2024.
Na súka ya ebandeli ya ba ¡°Nzela¡± yango, episkopo ya lokúmu Mario Grech, alobi ¡®te lingomba ya secrétariat ezali wana eleko inso po na kokende elongo pe kolendisa ba Eklezia ya bikolo na boluki bosáli.