Bato misusu na ns¨¦ ya ba bombe pe kozanga kobanza elati mokili mobimba
Bilili ya bopanzi bizali koloba makasi: lokito ya tank moko ya limpinga ya Israël ebetaki eklezia ya Libota-Esantu, paloise katoliko ya Gaza. Na kati, ezali na ba ndáko ya Nzámbe mibale pe eteyelo moko, epayi wapi bato bakima bisika na bango koleka pembeni ya mibú mibale, bato nkámá mitano, baye babungisa ba ndáko na bango, bavandi waná. Bato misato bakúfi. Zómi misusu bazokaki. Kati na bango, Suhail, oyo azali kosala po ya Osservatore Romano na esika moke ya kokoma na kómbó "Nakokomela bino úta Gaza". Esika ya kokoma ya mokolo ya 8 ya sánzá ya sambo ezalaki na kómbó "Bolingo eleki etumba na makasi" pe esúkaki boye: "Tokosambela kaka po na Gaza te kasi mokili mobimba ekoka kovanda mokolo na mokolo na kimia, na nzela ya bolimbisami epayi na epayi pe bozongisi bondeko. Mokolo moko epayi wapi bitumba bikozala te, pamba te bolingo eleki etumba na makasi"
Bakambi ya Israël basengaki bolimbisi, na bolobi ¡®te ezalaki ebunga, 'te Israël atosaka bisika ya losámbo pe akoluka ayeba nini elekaki. Maloba bikopesa kimia te, kaka po biboyani te na bilili bikolakisa polélé na lolenge ba mosquée bapikolaki yango úta mabelé pe libundi ekotaki na ba ndáko ya Nzámbe- bobeti na nzelá ya pépo ndáko ya Nzámbe ya ba orthodoxe Santu-Porphyre elongolaki bomoi ya bato zómi- kasi lokola, sima ya mobú moko na ndámbo, bosúkisi ya boluki ya liwa ya basi mibale ya bakristu bazokaka na mobeti masasi moko na paloise ya Gaza ekozelama kaka.
Maloba bibimaki po na likambo yango na ntómá ya Israël na Italie, Jonathan Peled, bizali na ntina makasi: "Tozali na posa moko te ya kobebisa bisika ya mosala ya ba civil. Kasi batomboki (terroristes) bazali bipayi binso, ata na ba ndáko ya leta, lokola biteyelo, pe, mawa, na bisika ya losámbo". Maloba maye bikobeta, po, na lolenge esusu, bikopesa ndenge nini "ebunga" elimbolami. Bato nkámá mitano bazali na ebundeli te, kati na bango mingi bakosambela sapele mokolo na mokolo, bakomaki bato ya koboma, po, lokola ntómá Jonathan Peled alobi, "bizali tango esusu makambo ya etumba".
Lokola batangi pe bayoki ya ba média ya Vatican bayebi yango malamu, tozelaki kufa ya bakristu te po na koloba bobomi mokolo na mokolo na Gaza, epayi wapi, poso nionso, ba zómi ya bana, ya basi pe ya mibali bayebi likambo te bazali koboma bango, bakúfi na ba nzelá ya pépo to ya masasi ya baye basengelaki babongisa bokaboli bilei na bokengi. Tolobi po ya bato bakúfi na Gaza po ya mbala eye bazali bakristu te to po Suhail azuaki lisasi: bato banso bazui likama bayebi likambo te bakoganga bozongisi mabe liboso ya Nzambe, bomoi moko moko ezali na ntina pe bakristu ya etúka ena, ya biyamba binso, bazali kokanisa na lolenge inso lobi ya bato na bango, bato ya ekolo Palestine baye bakonyokwama. Bobomi ya mabe esalemaka na batomboki ya Hamas na Israël mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi 2023, Ngwende ya Santu-Petelo epamelaka yango na maloba bisengelaki, na bosengi botiki ya bakengemi (otages) banso pe na bondimi lotomo ya Israël ya kobunda. Kasi bobomi mabe eye, etali ba civil ebele bayebi likambo te, ekoki kolimbola kufa ya 70.000 pe bitúka bipikolami na mabelé te. Ekoki kolimbola te bovandi nye pe bokangi maboko ya bato ebele baye bazali kokosa 'te bamoni eloko te.
Yango waná tokolemba soki moke te ya kobimisa bozangi mayele ya etumba eye, na bozongeli maloba ya Léon XIV na Likita ya Misala ya Lisalisi ba Eklezia ya Monyele, mokolo ya 26 ya sánzá ya motoba elekaki: "Tobengani banso, lokola bato, ya kotala nini ya bitumba biye, ya koluka biye bizali ya sóló pe ya komeka koleka yango, pe ya kobwaka biye ya lokuta, mbuma ya bomoko pe ya maloba, na bobimisi yango na molende. Bato bakoki kokúfa te po na ba nsango ya lokutá". Tobengami koleka bozangi kobanza ya mokili mobimba, biye bikosala 'te tango esusu tomona mabe po ya likama ya bato songolo pe toboya ya bato pakala. Tobengami ya kotala na bosólo likambo ya Moyen-Orient. Ngonga ekoki po 'te lisanga ya mokili mobimba ezua lisusu molende ya kokota na bisalelo binso biye sémbo abongisa: po na kopekisa mindoki, po ya kosúkisa bobomi pe kosúkisa na masano ya bokonzi biye ebele ya bato bayebi likambo te bakokúfa