ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Episkopo ya lokumu Pietro Paroli na Papa L¨¦on ya Zomi na Minei Episkopo ya lokumu Pietro Paroli na Papa L¨¦on ya Zomi na Minei  (AFP or licensors)

Zubile ya Ngwende ya Santu Petelo: episkopo ya lokumu Parolin akokumisa mosala ya botindami ya Nsango Ndambo

Ntoma ya P¨¢pa azali ¡°gbagba¡± moko kati na Mokitani ya Petelo pe ba Eklezia ya bikolo, kati na Eklezia pe Bikolo, ¡°kati na ba pota ya mokili pe elikya ya Nsango Ndambo¡±, elobaki episkopo ya lokumu Pietro Parolin. Secr¨¦taire ya Leta azuaki lisolo na bapanzi nsango ya Vatican o eleko ya Zubil¨¦ ya Ngwende ya Santu Petelo pe liboso ya likita ya L¨¦on ya Zomi na Minei na baye bayaki mobembo ya zubil¨¦ pe na bokutani na batindami ya P¨¢pa.

Nsango ya Vatican

Episkopo ya lokumu, zubilé ya Ngwende ya Santu Petelo epesi eleko moko ya bokutani pe esika ya boyokani ya Eklezia na mokili. Ntina nini likambo yango ezali po na batindami ya bikolo ya Ngwende ya Santu Petelo, pe mingi mpenza po na ba ntoma ya Pápa?

Zubilé ya Santu Petelo ezali eleko ya kobika, na kati wana batindami ya Pápa, eleko moko ya bomoko. Bomoi ya moko moko ya kati na bango ezali ¡°mobembo¡± moko ezali kokoba, na likoki ata moko te ya kokangama na bosolo moko. Ezali bomoi moko na nzela, iyo, kasi bomoi moko ya ye moko te. Yango wana Zubilé eye ekolakisa biso lisusu elili ya libota moko eye, epanzani na mokili kasi na ezali na bomoko, esangani na Roma nzinganzinga ya Papa.

Motindami ya Papa azali liboso mpenza gbagba moko kati na Sango Molandi ya Kristu pe masanga maye atindami, pe kaka na eleko ena akobatela na bomoi singa kati na ba Eklezia ya bikolo pe Ngwende ya santu Petelo. Po na kolendisa bomoko ena, mosala ya secrétaire ya Leta ezali kosala mosala ya bosangisi, na bolendisi mosala ya batindami ya Papa na Roma pe na mokili.

Lokola olobaki, ba ntoma ya Papa bakolakisa Ngwende ya Santu Petelo pembeni ya ba Eklezia ya bikolo pe ya bakambi ya bikolo. Nini ekokesenisa mosala na bango pe lolenge nini bakolimbola bonene ya koteya pe bonene ya botindami?

Ba ntoma ya Papa bazali ya solo batindami ya Papa bipayi ya bulamatari ya bikolo pe ya mokili. Na wana, mosala na bango ezali mpenza ya botindami: kosolola na bakambi ya ekolo, kosala po na bobongisi bokabwani, kotombola kimia, sembo pe bonsomi ya boyambi.  

Ntoma ya Papa azali liboso mpenza moto moko ya Eklezia, azali lisusu mobateli pe esengeli azua ndakisa ya Kristu Mobateli Molamu! Kozala mobateli, ezali kozala pembeni ya ba episkopo, ya basango, ya basali ya Nzambe pe masanga maye tobengami ya kosalela, na bozali tango inso na liso ya eklezia. Wana elingi koloba sango eye azali komiyoka mokumbi ya basusu. Ntoma ya Papa akomi bongo gbagba moko kati na mokitani ya Petelo pe ba Eklezia ya bikolo, kati na Eklezia pe bikolo, kati na ba pota ya mokili pe ya elikya ya Nsango Elamu.

Bizaleli nini yo omoni lokola ya ntina po na motindami moko ya Papa, mingi mpenza na eleko eye ya lisapo ya kili-kili?  

Ezali mingi mpenza bomikitisi eye ezali lokola libongisi ya motema. Esungaka po na bomikomisi ¡°moto moke¡± pe kozala molende na kotia motema na Mokonzi, pe na nzela na biso, ekoki kosala makambo ya minene. Bomikitisi ekokende elongo na molende moko ya koteya. Motindami ya Papa azali na mosala ya komema mwinda ya Kristu na bisika ya mosika koleka ya mabelé. Na mokili ya lelo, azali na mosala ya kosala po ya boluki bosangisi pe ya lisolo. Tondima mbela ya Santu Papa ya kokoma baloni ya kimia, pamba ¡®te mosusu azali monguna moko te, kasi moto moko ya kosolola na ye.

Na mokili ezali kobongwana tango inso, lolenge nini kotangisa basango ya bilenge likambo ya motindami po na koyanola na mabaku ya mikolo miye?

Uto mibu 300, Eteyelo moko ya Papa po ya ba nganga Nzambe ekotala lolenge ya kolakisa ba sango ya bilenge baye balingi kokota na mosala ya etindami ya Ngwende ya Santu Petelo. Sik¡¯oyo ekoteya bango lolenge ya koyanola malamu na ndenge mokili ezali kotambola lelo. Posa ezali kotinda na mokili batindami bayebi mosala.

 

 

 

10 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 17:32