Mgr Balestrero akobianga ya kotambuisa elongo ¡°bons¨®mi ya bolobi pe bomipesi po na bos¨®lo¡±
Jean-René B.-Kinshasa
¡°Bobele bato bazali kozua ba nsango bakoki kosala maponami na bonsómi¡±. Liloba eye elobamaka na Pápa Léon XIV o eleko ya bokutani na ye na batindami ya bapanzi nsango mokolo ya 12 ya sanza ya mitano elekaki. Mgr Ettore Balestrero, motali ya tango inso ya Ngwende ya Santu Petelo na ONU pe masanga misusu ya mokili na Genève, azongelaki liloba yango na ebandeli ya lisikulu na ye liboso ya Lisanga ya ONU eye etalaka likambo ya bosémbo ya bato na likambo likonzi: ¡°Bonsómi ya bolobi pe maponami o eleko ya internet¡±.
¡°Bosémbo na bonsómi ya bolobi ezali na motuya, po ekosunga bana ya ekolo ya koloba na bonsómi makanisi na bango, ya koluka pe kozua ba nsango po na koyeba bozui mokano o eleko ya maponami¡±, elobaki ye. Ezalaki eleko ya koloba ¡®te Ngwende ya Santu-Petelo ekomona bozali na bomoi ya politki, lokola ¡°moko ya motindo ya likolo koleka ya bokaboli, po ezali kosunga bolamu ya lisanga¡±. Lokola Pápa François abimisaki yango na liteya na ye ya Eklezia ¡®Evangeli Gaudium¡¯.
Bosaleli ya ba tekiniki ya sika
Bato ebele lelo bakoki koyokisa lolaka na bang0 na nzela ya ba réseaux sociaux: ¡°Bosaleli ya ba tekiniki ya sika o eleko ya Internet ekoki kosunga na lolenge elongobami na bonsómi ya bolobi o eleko ya maponami¡±, elobaki ye. Epayi mosusu, makama misusu bikoki kokoma na ¡°libongisi¡± kaka ya bisalelo bina, ezala na politiki to na bomoi ya bato, Ya solo, bobutisi ya makoki ya ¡®interconnexion¡¯ pe ya bopanzi makanisi -lokola elobaka Pápa Benoît XVI na encyclique na ye Caritatis in Veritate- ¡°ezali kosunga te botomboli ya bonsómi pe ya démocratie po ya banso¡±.
Botosi ya lokúmu ya moto moko moko esengeli etikala o kati ya makambo. ¡°Bosémbo na bonsómi ya bolobi ekosenga, ya mibale, mokumba moko po na moto moko moko eye azali kosalela yango, pe kaka po na bapanzi nsango te¡±, ebakisaki Mgr Balestrero. Abakisaki ¡®te ¡°Lombángu eye nsango ezali kopanzana eleki mbala mingi likoki na biso ya bokanisi¡±, po ¡®te ¡°likoki moko ya bososoli¡± esengeli lokola po ya bopanzi makambo na Internet, zambi ya ¡°kosunga lolenge esengeli bolamu ya banso¡±.
Kosunga lisolo moko po ya banso
Engebene na Mgr Ettore Balestrero, ¡°ezali na motuya ya kopona o kati ya Internet eye ekosunga lisolo moko ya polélé pe po ya banso, na bobateli lokola misala ya bokati, ya botiki pembeni to ya bolongoli makanisi misusu, mingi ya baye bakangami na makanisi ya boyambi to ya ezaleli malamu¡±. Makanisi ya boyambi, esembolaki ye, bizali lisungi moko ya ntina na lisikulu ya démocratie, na ngonga eye tozali komona bobwaki yango mingi mpenza maye bisangani na kibokristu, ata na bikolo bikomona lokola ¡°makonzi ya bokangi motema¡± (tolérance)
¡°Na suka, o eleko eye ya Internet, esengeli na lombángu kozua lisusu bomipesi po ya bosólo¡±, elobaki ye, na bobakisi ¡®te ba tekiniki bizali yoko ya makambo bitandami po ya bokosi, atako ¡°nsago ya solo pe ya likambo ezali na ntina po na bobateli bosólo pe bosembwami ya molongó ya démocratie¡±. Po, lokola Pápa Léon XIV alobaki yango liboso ya batindami ya bikolo na Vatican mokolo ya 16 ya sanza ya mitano moleki, ¡°kaka bosólo ekoki kosangisa biso pe kosunga biso po na kobunda na molende koleka na mikakatano ya eleko na biso¡±.