Liponami ya mobongisi (coordinateur) ya mibembo ya P¨¢pa
Nsango ya Vatican
¡°Pápa Léon XIV apesaki na Mgr José Nahúm Jairo Salas Castañeda, mokambi moko ya Eteni ya makambo manso ya Secrétariat ya Vatican, mosala ya mobongisi ba mibembo ya Pápa¡±. Nsakola ya liponami ena esalemaki mokolo ya eyenga 22 ya sánzá ya motóbá sima y¡¯Angelus, na Mgr Edgar Pena Parra, moko ya Secrétariat ya Vatican.
Oyo azalaki kotala makambo ya mibembo ya Pápa François úta 2021, oyo azalaki liboso ya Mgr José Nahúm Salas Castañeda, Mgr George Koovakad, akelamaki episkopo ya lokúmu na sanza ya zomi na mibale elekaki pe aponamaki mokambi ya dicastère po na Lisolo kati na biyamba mokolo ya 21 ya sánzá ya yambo 2025.
Mgr Castañeda azali nani?
Mgr José Nahum Jairo Salas Castañeda abotamaki mokolo ya 11 ya sanza ya sambo 1978 na Santa Clara, na Mexique. Akulaki bonganga Nzambe mokolo ya 4 ya sánzá ya zomi na mibale 2008, azalaki na diocèse eye awuta. Atangaki na Université ya Pápa ya Latran na Roma epayi wapi azuaki lipolome ya bosémbo (droit). Sima ya bokomi elama moko ya mosala etalaka diplomatie ya Ngwende ya Santu-Petelo mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo 2013, asalaki na ba ndako ya ba ntoma ya Pápa na Burundi (2013-2016), na Irak (2016-2019) pe na Hongrie (2019-2023). Tango ya mosala na ye na Hongrie, azalaki na bobongisi mibembo mibale ya Pápa François na sánzá ya libwa 2021 -o eleko ya Bokutani ya mbala ya 52 ya ukaristya ya mokili mobimba (52e Congrès eucharistique international)- pe na sánzá ya inei 2023.
Úta mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo 2023, azongaki na Vatican, epayi wapi akomaki mosali ya Eteni ya makambo manso ya Secrétariat ya Vatican, epayi wapi asalaki na esika ya mokonzi ya Office central ya ba statistiques ecclésiastiques.