L¨¦on XIV abiangi ba episkopo ya Italie ya kosalela mingi bosakoli ya Nsango Ndamu
Jean-René B.-Kinshasa
Ezali mokanda moko (rapport) ¡°ya lisanga pe ya yango moko¡±, lokola Polo ya Motóbá alimbolaka yango na 1966, eye kati ya ba epsikopo ya Italie na Pápa. Pápa wa Roma azali bôngó episkopo ya Roma pe primat ya Italie. Boyokani ena, elobamaki lisusu na episkopo ya lokumu Matteo Zuppi, mokambi ya Lisanga ya ba episkopo ya Italie na Pápa o eleko ya bokutani mokolo ya mibale na tongo na Vatican. Léon ya Zomi na Minei alingi yango na mikano ya ¡°lisanga¡±.
Lisanga ena elobamaki na Pápa ya sika, esengeli ezala engebene na ye lolenge eye ba episkopo ya Italie babengami po na kosala mosala na bango, elingi koloba lisusu elongo na episkopo pe lisanga na Mokitani ya Santu-Petelo. Yango esengeli komonana na ¡°bosálisani moko ya peto na bakambi ya Leta¡±, Lisanga ya ba episkopo ezali ¡°esika moko ya bokutani pe ya bosangisi likanisi ya ba episkopo na maye matali makambo ya motuya po na banso¡±.
Mabakú ya Eklezia ya Italie
Soki Eklezia na Italie ezali bosólo moko lisusu na bomoi makasi, lokola Benoît XVI alobaka na 2006, esengeli ebunda na mabakú ya sika bitali ¡°likambo ya sécularisme, ya botiki boyambi pe na likambo ya motángo ya bato¡±, elobaki Léon ya Zomi na Minei. Liboso ya likambo yango, Eklezia esengeli kolakisa molende, lokola François alobaka yango na 2017. Pápa alakisi bôngó bango ba nzela ya kolanda.
Ya liboso, ¡°bozua lisusu makasi ya sika na bosakoli pe na bopesi boyambi¡± ezali na ¡°ntina¡± zambi ya kotia Yezu o kati pe ya ¡°kosunga bato bazala na boyokani ya bango moko na Ye, po na komona esengo ya Nsango Elamu¡±. Esengeli kozonga na makonzi ya boyambi, na kerygma, elobaki Léon XIV.
Boboto mokolo na mokolo
Lisusu, Pápa abakisi ¡®te esengeli kozala na bokebi makasi na kimia zambi ya kokoma ¡°basali ya kimia na bisika ya bomoi mokolo na mokolo¡±. Eklezia esengeli komilakisa ¡®te ¡°akoki kosangisa bato¡±.
Pápa wa Roma akebisi lisusu ba episkopo ya Italie na mabaku mingi bisalemi na ¡®intelligence artificielle¡¯, ¡®biotechnologies¡¯ ¡®economie ya ba données pe ba réseaux sociaux biye ¡°bibongoli na mozindo botali na biso pe boyebi na biso ya bomoi¡±.
Kokende liboso na bomoko
Po na kosukisa makambo mana, Léon XIV atie na liboso lisolo pamba ¡®te ¡°ezali kaka esika eye boyoki ezali ndé lisanga ebotamaka pe ezali kaka esika lisanga ezali ndé bosolo endimamaka¡±.
Liboso ya kosukisa lisolo na ba episkopo ya Italie, Pápa apesi bango ba toli mibale: ¡°Botambola na bomoko, na bokanisi mingi nzela ya synode¡±. ¡°Botala mokolo elandi na kimia pe bobanga te na bozui mikano ya molende¡±. ¡°Moto akoki kopekisa bino te na bolobi Nsango Elamu¡±.