ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.06.29 Parolin na Expo Osaka 2025 2025.06.29 Parolin na Expo Osaka 2025 

Kosukisa bopanzi mandoki: etumba ya Ngwende ya Santu-Petelo pe ya Japon

Episkopo ya lokumu na mobembo na Japon o eleko ya mokolo ya Ngwende ya Santu-Petelo (Saint-Si¨¨ge) na Expo-Osaka 2025 alobaki lisusu bobiangi ebwakamaka na P¨¢pa L¨¦on XIV mokolo ya liponami na ye: kosala po ya kimia ezanga mandoki, kotonga ba gbagba pe kozongisa lisolo.

Jean-René B.-Kinshasa

¡°Na kombo ya Pápa Léon XIV pe ya ngai mei, napesi matondi na bato ya Japon, na elikia ¡®te baye banso bazali na ekolo eye bapambolama na bozui pe na kimia¡±. Na maloba maye nde episkopo ya lokumu Secrétaire ya Leta Pietro Parolin apesaki losako na baye bazalaki na bosepeli ya Mokolo ya Ngwende ya Santu-Petelo na Expo-Osaka 2025.

Na lisikulu na ye, episkopo ya lokumu alobaki lisusu ¡®te boyokani esalema eleka mibu 80, evandi lelo na biloko ya ntina ya lisanga, mingi mpenza na maye matali bolakisi, bokólóngónó pe ya lisungi. ¡°Makambo masusu tosimbi na motema biso mibale, elimbolaki episkopo ya lokumu Parolin, bizali kimia pe makasi tozali kosala lisanga po ya kosukisa bopanzami eyebani te ya mindoki¡±. Po na wana, elobaki ye, mobu eye ekokundela mibu 80 ya bobwaki bombe atomique na Hiroshima pe na Nagasaki, ¡°likambo moko, elobaki ye, etika elembo na lisapo ya ekolo eye pe elendisa lisusu makasi na bomipesi na ye po na kimia¡±.

Boyokani moko etelemi na etumba ya ngonga

Episkopo ya lokumu azongelaki lisapo molayi ya boyokani kati na Ngwende ya Santu-Petelo pe ya Japon, na bokundoli mibu 470 bikoya ya likita ya yambo ya Pápa moko apesaka na katoliko moko ya Japon, tango, na 1555, Bernard de Kagoshima ayambamaki epayi ya Pápa Polo IV. Na sánzá ya misato, tokosepela botindami ya yambo ya Japon na Poto, oyo babengi bontóma ya Tensho, eye, ekomaki na Roma, ekutanaka na Pápa Grégoire III, pe mibu 410 ya bontóma Keicho, na likita epayi ya Pápa Polo VI na 1615. ¡°Makambo maye ya yambo ya lisapo, -elimbolaki episkopo ya lokumu Parolin- bilakisi ebandeli ya boyokani bitelemi na etumba ya tango pe eye, tokolikia, ekozala na mozindo makasi na mibu mikoya¡±.

Bonzéngá pe elikya

Secrétaire ya Leta akobaki lisusu na bomanyoli eye etali makambo ya bonzéngá na elikya biye bikomonana na likambo likonzi na pavillon ya Ngwende ya Santu-Petelo na Expo 2025 ya Osaka, ezali bongo: ¡°bonzéngá ekomema elikya¡±. ¡°Mazali makambo ya ntina po na biso, ba katoliko, po -elimbolaki ye- tozali komona kuna liyeyele (reflet) ya Kristu pe ya mosala na ye na lisapo.  Po na biso, azali elembo ya likolo makasi ya bonzéngá ya likolo: bonzéngá ekoleka eye ekomonana na libanda po esimba motema pe molimo ya bato. Kristu azali pe elikya ya moto, po na bomoi na ye pe na liwa na ye, afungola nzela moko ya libiki pe ya sika po na bato banso¡±.

Na likambo ya bonzéngá, episkopo ya lolumu Parolin alendisaki ya kotala eye ekoki komonana na lisanga ya bato, na bopalingami ya misala po ya bato, na misala ya moto ye moko to ya bomoko biye bizali ¡°mbóto moko elamu eye masanga na biso pe ba politiki na biso bikoki kozua makasi zambi ya bozongeli misala pe kopesa lisusu mwinda na bisika ebele ya molili ya mokili na biso ya sika¡±.

Elikya, mbela po na lisolo na boyokani

Likambo ya elikya, elimbolaki episkopo ya lokumu, ekangami makasi na kotiya motema na Nzambe, na bomipesi ya solo po na lisanga, pe ekosunga lolenge ya lisanga pe ya kimokumba po ya banso. ¡°Ezaleli eye ya malamu, ebakisaki ye, emonani lelo lokola ya ntina. Na eleko moko azali na bilembo ya bitumba ebele, lobi ezali kobangama mingi ¡®te kozelama. Ezali kaka na elikya nde tokozua kisi ya bobangi pe kolendisama moko na bomipesi pe na mosala¡±. Elikya ezali masini po ya kosala malamu na lisanga pe na mokili mobimba. ¡°Ekomi mbela moko po na bomipesi ekolembe te po ya lisolo pe boyokani mingi mpenza tango bitumba bikosila te¡±. Na suka, tozongela maloba ya Pápa mokolo ya liponami na ye, zambi totonga ba gbagba, totonga masolo, tokutanisa maboko po na botomboli ¡°kimia moko ezanga mandoki pe ekolongola mandoki, ya bomikitisi pe ya molende¡±.

30 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 14:03