ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.05.14 Il cardinale Parolin alla Gregoriana 2025.05.14 Il cardinale Parolin alla Gregoriana 

Vatican ekolikia t¨¨ na Istanbul nzela moko ya kimia ekofungwama

Na motuna na likambo etali Ukraine, episkopo ya lokumu Parolin alobi akolikia t¨¨ masolo bikobanda na ekolo Turquie ¡°bikozala litono moko ya ebandeli zambi ya kosilisa etumba¡±. Po na Papa Leon ya Zomi na Minei, alobi t¨¨ ¡°azali moto moko ya kimia¡±. Ekoki kosalema t¨¨ mobembo na ye ya liboso esalema na Nic¨¦e.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Miso bibaluki bipayi ya Turquie, ekolo ekoki koyamba na mobembo ya liboso ya Papa Leon ya Zomi na Minei, po na mibu 1700 ya Concile ya Nicée pe esika, kobanda mokolo ya minei, ya bokutani ya Istanbul pe ya masolo kati na ba russe na ba ukrainien, zambi ya bozimi moto. Episkopo ya lokumu Pietro Parolin akoyanola na mituna ya mopanzi nsango moko mbala ya yambo kobanda Conclave, o eleko ya molulu moko na université Grégorienne na mama ya likambo ¡°Na nzela ya liteya moko ya elikia zambi pe po na Ukraine¡±. Secrétaire ya leta ya Vatican alobaki maye azali kozela kati na masolo mana, biye bilukami na ekolo Amerika, bikoki komona bakambi ya Ukraine pe ya Russie bakutana mbala ya liboso na mesa moko.

¡°Tokolikia tango inso te minda ya kimia bikopela¡±, elobaki episkopo ya lokumu. ¡°Tozali na esengo tè likoki ya bokutani ezuami. Tokolikia tè mazita biwumeli bikofungwama kuna pe nzela moko po ya kimia ekomonana ya solo¡±. Po na episkopo ya lokumu, ¡°ezali mpenza noki¡± lelo ya koloba nini ekoleka, elikia ezali tè na Istanbul ezala ¡°litono moko ya ebandeli ya solo¡± zambi ya kokoma na suka ya etumba.   

Mobembo na Nicée

Na suka, episkopo ya lokumu ayanolaki na motuna ya koyeba epayi wapi mobembo ya liboso ya Papa Leon ya Zomi na Minei ekoki kosalema. ¡°Nakanisi na Nicée¡±, elobaki ye. ¡°Ezali eleko moko ya ntina po na Eklezia katoliko, eleko moko ya ntina po na lisanga ya biyamba. Ebongisamaka tè Papa François akende kuna. Nakanisi tè Papa Leon akolanda nzela wana¡±.      

15 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 12:58