Pembe, langi elembo ya Papa wa Roma
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Ebongi te mokolo ya lelo kokanisa Papa na soutane ya langi mosusu na esika ya pambe. Atako bongo, Papa azalaka kolata kaka pembe te. Bolati pembe ezali momeseno ewuti na ekeke ya zomi na motoba. Ya solo sima ya boponami na yen a ngwende ya Petelo, Papa Pie V, dominicain alataka pembe. Atikalaka kaka na elamba na ye eleko inso alekisaki na mosala ya Papa eye ebandaka na 1566 kino 1572. Kino mikolo na biso, bakitani na ye bakoba kolata soutane ya pembe.
Ezali se kokoba
Lokola baye bazalaki liboso na ye, Papa François (jésuite) oyo akufaki mokolo ya 21 ya sanza ya minei elekaki, akobaki kolata pembe po na kolakisa mosala na ye ya mokumbi milimo ya koleka bato miliare moko ya ba katoliko na mokili. Lisusu na mobembo asalaka na Corse, mokolo ya eyenga 15 ya sanza ya zomi na mibale 2024, Papa François asalaka misa na bolati elamba ya rose, azingamaka na ba episkopo na ba sango balataka lokola ye. Boponi ya langi wana mpenza ekoyanola na mikano bipesama na missel ya Roma kobanda ekeke ya zomi na motoba.
Langi ya elembo
Elembo ya bopeto, ya muinda pe ya ngolu ya elimo, lokola lisusu ya bopete pe ya bomikitisi, langi ya pembe kobanda bikeke ebele, ekangami na mosala ya Papa. Soki kobanda sik¡¯oyo soutane ya pembe ekangama na mosala ya Papa, ba dominicains babongola molato na bango te. Kasi, liboso ya Papa, babakisaka elamba na bango ya moindo. Sima ya boponami na ye, Papa ya ekolo Aregentine, ye, abakisaka libenga ya moke na kati ya soutane ya pembe, po na kozala na kuruse pembeni ya motema na ye ¡°Tango likanisi ya mabe eyeli ngai po na moto moko, loboko na ngai evandaka esika wana Pe nayokaka ngolu!¡±, elobaka Papa François. Papa Benoit XVI po na ye, atako lolenge atikaka na 2013, ndakisa atikalaka na soutane na ye na calotte na ye ya pembe.