Molinga ya moyindo sima ya maponami ya mbala ya misato
Jean-René Bompolonga
Ezali na ngonga ya 11 na minuti 50 nde milinga ya moyindo bibimaki. Elembo moko ya polele ekolakisa na bandimi ebele baye bazali na esika ya Santu Petelo, lokola baye bazali kolanda likambo yango na nzela ya ba media. Esengeli kozela maponami ya mbala ya mibale ya mokolo ya lelo eye esengeli kobanda na ngonga ya 16 na minuti 30, lolenge manaka epesamaki na ndako ya Bopanzi Nsango ya Vatican liboso ya ebandeli ya conclave.
Bozeli ekokoba
Sambela zambi ¡°Nzambe apesa na Eklezia Papa oyo akokoka kolamuisa boyebi ya bato banso lokola bokasi ya molimo ya bato ya lelo, baye bazali kobika na makambo minene ya tekiniki kasi bazali kolinga kobosana Nzambe¡±. Ezalaki mbela ya episkopo ya lokumu Re o eleko ya misa ya boponi Papa. Ezali na lolenge ena ya losambo nde bozeli ezali kokoba. Tango kaka kombo moko ekozua bilembo 2 likolo na 3 ya lisanga ya ba episkopo ya lokumu, molinga ya pembe eye bato bazali kozela ekobima, yango ekolakisa te sango mokonzi molandi ya Kristu akobima.