Mamelo Yvonne Reungoat: L¨¦on XIV, azali moto ya mokano pe ya kosala elongo
Jean-René Bompolonga
Bato koleka 100.000 batondaki mokolo ya minei na pokwa na basilique Santu Petelo po na komona elongi ya Papa oyo awutaki koponama. Mamelo Yvonne Reungoat azalaki kati na bango te. Mamelo azalaki mosika na bango. ¡°Ba kombo ebele bizalaki kotangama pe nakanisaki episkopo ya lokumu Prevost. Yango evandaki mingi kati na ngai¡±, elobaki ye.
Mamelo alobaki esengo ayokaki tango na suka amoni préfet na ye ya kala abimi na elamba ya pembe, na kombo ya Léon XIV. Na lisolo eye, mamelo Yvonne Reungoat akoloba nzela elandaki sango ya molongo ya Santu Augustin.
Oyokaki ndenge nini tango elongi ya Papa aponami ebimaki?
Esengeli naloba tè nayokaki esengo moko monene. Liboso, nayebi ye moke, tosalaki elongo mibu mileki, tango azalaki kokamba dicastère ya ba Episkopo. Azalaki moto ayebani. Lisusu nayokaki boni Elimo Santu azali na lobókó na ye mei pe akokamba Eklezia na ye. Yango epesaki ngai esengo enene, natiya motema pe elikya po na oyo ekoya.
Po na yo, po na nini Papa François aponaka ye? Nini ya sika akotisi na dicastère ya ba epsikopo?
Nayebi te nini etindaka Papa François apona ye. Atiyaka ye episkopo na Pérou, sima ya bozali mokambi ya congrégation na ye. Kasi, namoni makambo ebele: likambo tè azalaka motindami pe na bokebi makasi na babola, na oyo etali nzinganzinga, na ba migrants. Lisusu, azali moto moko ya molimo. Nazali komona lokola Papa François ayebaka ye na eleko y¡¯Amerika ya latin.
Lolenge nin, mibu mibale mileki, alukaki kobongisa elongi ya Eklezia?
Lokola mokambi ya dicastère, azuaka esika ya episkopo ya lokumu Ouellet na bopete pe na bofungwami. Azalaki na bokebi mingi na kotala baye basengelaki kokoma ba episkopo, esengelaki bakokana na ndenge Papa François alingaki, po tango bakozala na ba diocèse na bango batambola lokola ye atambolaki. Ndakisa, likambo ya kozala ya solo babateli po na bandimi na bango, bazala na makoki ya kovanda pembeni ya ba sango na bato¡
Episkopo ya lokumu Prevost, Papa Léon XIV, asalaki yango na bokebi makasi, na likoki ya koyoka pe na kokende na bozindo ya makambo po na bososoli, po na kokomisa polele eye esengelaki kokoma polele¡
Boni-boni okobenga lolenge na ye ya bokambi o kati ya dicastère?
Nakanisi azali moto moko ayebi kosala na bato, ayebi kopesa mikumba na bato, oyo ayebi komipesa, baye bazali kosala na ye na bato bazali kotia ye motema. Nakanisi te tè azali lolenge ya bato ya kokamba ye moko kasi na bato elongo, na boyebi tè azali o kati ya maboko likambo ya kokamba Eklezia.
Pe nandimi tè na boyebi na ye ya kokamba, Papa Léon XIV azali na makoki po ya kokamba pe kotambuisa Eklezia, ya solo ye moko te. Ekozala na ntina ya komona nani akotia pembeni na ye po na kokamba pe kotambuisa Eklezia.
Osepeli tango Papa Léon XIV na bobimi na ye ya yambo alobaki Eklezia moko ya synode?
Moko ya bobangi na ngai ezalaki ya komona te nzela ya synode ekoba lisusu te pamba tè ezali mbela ya Eklezia. Namonaki ezalaki na ntina makasi tozonga sima te kasi tokende liboso. Pe Papa Léon XIV, ye moko azalaki na masanga mibale ya synode, azali na kondima nzela ena ya bozongisi Eklezia sika. Alobaki yango na lisikulu na ye ya bofungoli. Po na ngai, ezali moko ya makambo ya kolikya.