ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.05.22 Mamelo Tiziana Merletti 2025.05.22 Mamelo Tiziana Merletti 

Mamelo Merletti aponami secr¨¦taire ya dicast¨¨re ya Bomoi ebonzama

Mamelo Tiziani Merletti aponami secr¨¦taire ya dicast¨¨re po na Biteyelo ya bomoi ebonzama (Vie consacr¨¦e) pe Masanga ya vie apostolique mokolo ya lelo ya minei 22 ya sanza ya mitano na Papa L¨¦on ya Zomi na Minei. Akitani na esika ena na mamelo Simona Brambila oyo akomaki mokambi ya dicast¨¨re yango o ebandeli ya sanza ya yambo.

Nsango ya Vatican

Sima ya mikolo zomi na mitano ya mosala na ye, Papa Léon ya Zomi na Minei akokoba na boponi bato o kati ya Curie. Lelo mokolo ya minei ya 22 ya sanza ya itano 2025, Papa wa Roma aponi mamelo Tiziani Merletti lokola secrétaire ya dicastère ya Biteyelo ya bomoi ebonzama pe Masanga ya vie apostolique.

Na mibu 65, mamelo eye ya ekolo Italie azalaki kino lelo moteyi na eteyelo ekotangisa droit canonique ya Université ya Papa Antonianum ya Roma pe azalaki kosalisa lokola canoniste na Lisanga ya ba supérieures générales. Mamelo Tiziani Merletti akotaki na eyamba epayi ya ba franciscaines ya babola na 1986, liboso ya bozui doctorat moko na droit canon naUniversité ya Papa ya Latran. Kati na 2004 pe 2013, azali kosala mosala ya etinda ya mokambi monene ya congrégation na ye.

Mwasi ya misato secrétaire ya dicastère moko

Mamelo Tiziani Merletti akomi bongo mwasi ya misato ya kozala na esika ya secrétaire ya dicastère moko ya Curie ya Roma, sima ya mamelo Alessandra Smerili na discatère po na Service ya développement humain intégral, pe mamelo Simona Brambilla. Oyo ya suka aponamaki mokambi na Papa François mokolo ya 6 ya sanza ya yambo 2025, na kokoma bongo mwasi wa yambo na esika ena na Vatican.

O eleko ya Papa François, bozali ya basi emataki makasi. Na botali ba nkoma, bizala ya Saint-Siège to ya Vatican, kobanda 2013 kino 2023, bozali ya basi ezalaki na 19,2% pe ekomi na 23,4%. Na Buku likonzi  Praedicate Evangelium ya 2022, Papa François asalaki tè na mibu mikoya, ba laïki, basi na kati na bango, bakoka kokamba dicastère moko pe kokoma bakonzi. Mosala eye ezalaka liboso kaka po na ba episkopo ya lokumu pe b¡¯archevêques.

Na liponi eye, Léon ya Zomi na Minei akokoba kofungola na basi bisika ya bokambi o ntei ya ba dicastère. 

22 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 14:43