Episkopo ya lokumu Mamberti akolendisa po na komona lisusu bokumbameli Nzambe
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
Misa ya suka ya ba novemdiales mokolo ya eyenga na pokwa ekambemaki na episkopo ya lokumu Dominique Mamberti, pe esalemaki kaka po na ba episkopo ya lokumu, lokola misa ya 30 ya sanza ya minei. Bongo na misa ya eyenga ya misato ya Pasika, ba episkopo ya lokumu baye bakopono Papa ya sika na baye bakopono te bakutanaki na basilique po na bokanisi molimo ya Papa François liboso ya bokoti na conclave mokolo ya misato ezali koya.
Na bozongeli liloba elobamaki na misa, episkopo ya lokumu Mamberti atelemaki na oyo etali botosi Nzambe na esika ya bato (cf. Mis ya bapostolu 5, 27b-32.40b-41) po na bokanisi Papa oyo akufi. ¡°Papa François, asimbamaki na bolingo ya Mokonzi pe akumbamaki na ngolu na ye, azalaki na lobòko na mosala na ye kino suka ya makasi na ye. Ayebisaki lisusu na baye bazali na bokonzi tè basengeli kotosa Nzambe na esika ya bato pe asakoli na mokili mobimba esengo ya Nsango Elamu, [¡] na mibembo na ye, na bizaleli na ye pe na lolenge ya bomoi na ye¡±. Pe akobaki na bolobi likambo moko etalaki ye moko: ¡°Nazalaki pembeni na ye mokolo ya Pasika, na esika ya bobenisi ya basilique eye, nzeneneke ya ba pasi na ye, kasi mingi penza ya mpiko na ye pe molende na ye ya kosala po na bana ya Nzambe kino na suka¡±.
Ntina ya losambo ya bokumbameli (adoration)
Na boteyi litangi ya mibale, ¡°Bakulutu bakomibwaka liboso ya Ngwende, bakumbami¡± (Mibombamo 5, 11-14), episkopo ya lokumu abeti sete na ntina bileko ya bokumbameli bizalaki po na Papa, ¡°likambo moko ya motuya na mosala ya Eklezia pe ya bomoi ya bandimi¡±. Akomisaki ya ye mwa maloba ya Papa François na misa ya bomonani (épiphanie) ya 6 ya sanza ya liboso ya 2024: Tango bato misato ya mayele bamoni mwana, ¡°bafukami liboso na ye pe bakumbameli ye¡±. Mosala ya bato ya mayele, elobaka François, ekobianga ¡°ya kogumba motema pe mabolongo po ya bokumbami¡±. [¡] Tobungisa momeseno ya bokumbami, tobungisa makoki maye bokumbameli epesaka na biso¡±.
Bomoi ya moteyi ya François, bokutani na ye na ebele ya bato, ¡°bikambemaki na bileko milayi ya losambo eye disipline ya Ignace ekotaka kati na ye¡±, elobaki episkopo ya lokumu Mamberti.
Ba episkopo ya lokumu bakabwanaki sima ya bobenisi ya episkopo ya lokumu Dominique Mamberti.