Diplomatie ya bokutani ya L¨¦on ya Zomi na Minei elobami na ONU na episkopo ya lokumu Parolin
Jean René B- Kinshasa
Saint-Siège, na bokambemi ya Léon ya Zomi na Minei, ezui mokano ya kosala pembeni ya bantoma ya bikolo ¡°zambi ya kotombola lokumu ya moto, kobatela baye bazangi makoki pe kotonga ba gbagba esika eye boyokani ekoki kokota¡±. Ezali maye episkopo ya lokumu Pietro Parolin alobaki mokolo ya 19 ya sanza ya mitano, na lisikulu na ONU na New York, na likita moko esalemaki o eleko ya boponami ya Papa. Boponi Papa wa Roma ya sika ezali libaku moko ya ¡°mbotama ya sika, kaka po na ba katoliko te, kasi po na baye banso bazali koluka mokili moko ya sembo koleka, bomoko pe kimia¡±, elobaki episkopo ya lokumu. Posa na ye ezali tè Saint-Siège pe batindami ya bikolo bakoka kokende liboso ¡°na lisanga, na likanisi ewuti na elikia pe emoniseli ya Papa Léon¡±. Papa, na mikolo ya yambo ya mosala na ye ya Papa, alobaki bomipesi na ye ya mozindo po na kotonga ba gbagba, na botali lolenge esengeli ya kokutana, ya kosolola pe ya koluka boyokani. ¡°Tokoki, na lisanga, koyanola na mbela ya Papa pe kokoma baye bakolona boboto moko ekowumela na lisapo, kasi baye bakotanga bawei te¡±, elobaki episkopo ya lokumu na bozongeli lisikulu moko ya Léon ya Zomi na Minei.
Kotonga diplomatie moko ya bokutani
¡°Na mokili moko ¡°etungisami na bokabwani, bitumba pe makambo ya mokili ya bosali mbangu mbangu, ya mbongwana ya klima, ya ba migration na ya intelligence artificielle¡±, Papa wa Roma ya sika, akobaki koloba Parolin, ¡°akobianga biso ya koyamba diplomatie moko ya bokutani¡±. Wana elingi koloba diplomatie moko ¡°eye ezali koyoka na bomikitisi, ekosala na mawa pe ekoluka bolamu ya banso liboso¡±. Po na wana, ekobaki episkopo ya lokumu Parolin, ¡°Saint-Siège elobi lisusu lisungi na ye na etinda ya ONU¡±. Po na Vatican, ¡°ONU esengeli kozala esika bikolo bakosolola, bakoyokisa lolaka ya bato na bango pe esika ya bobongisi biyano na makambo minene ya mokili¡±.&²Ô²ú²õ±è;