Bato misato ya sika ya lokumu: batindami mibale na Equateur pe episkopo moko ya Inde
Jean-René B.-Kinshasa
Mwasi moko pe mibali mibale ya boboto. Mamelo moko pe ba episkopo mibale. Wana ezali na bokuse lisolo ya bato ya lokumu misato baye Léon ya Zomi na Minei andimaki mikano ya bondimi mokolo ya 22 ya sanza ya mitano. Ezali o eleko ayambaki episkopo ya lokumu Marcello Semeraro, mokambi ya dicastère eye etalaka Makambo ya basantu (Causes des saints). Mibale kati na bango bapesaki bomoi na bango na martyro ya boyambi. Bakufaki liwa ya mpasi na zamba ya Equateur tango bazalaki koluka kobatela sémbo po ya bana mboka.
Episkopo moko na molimo ya motindami
Alejandro Labaka Ugarte, abotami na 1920, azali moto ya Beizama, na nordi ya Espagne. Alingaka kozala noki noki motindami. Bongo, tango akuli bonganga Nzambe na 1945, bakambi minene ya lisanga ya ba Capucin epayi wapi akomaki mofulele na 1937 na kombo ya mofulele Manuel, batindaki ye liboso na Chine. Sima ya mibu zomi, babengani ye na batindami misusu o eleko ya mokonzi Maio. Akei o ekolo Equateur epayi wapi azuaki mokumba ya sango mokonzi ya paloisse pe azalaki kosala misala misusu. Azalaki pe préfet apostolique, amipesaki na bopanzi Nsango Elamu epayi ya bana mboka Huaorani.
Na 1984, mofulele Manuel akulaki episkopo pe akobaki kozala motindami o kati ya ba indien. Akutanaki lisusu na lisanga ya bato babengi bango ba Tagaeri. Ezalaki eleko moko ya mikakatano makasi. Ba kompani ya pitolo bikokende bipayi na bipayi, na bobuki bisika bazamba bizali na boluki wólo ya moyindo. Po na Mgr Ugarte, oyo ayebanaki na makoki na ye ya kosolola pe ya kobongisa, ya liboso mpenza ezalaki ya kobatela sembo ya ba Tagaeri. Akutanaki bongo na mamelo Inés.
Mamelo kati na bato ya Inde
Mamelo Inés Arango Vélasquez azalaki na mibu 40 tango na 1977 akendeki etindami ya yambo ya ba mamelo ya Tertiaires Capucines ya Libota Esantu y¡¯Aguarico, na Equateur. Mwana ya Colombie, abotami na Medellin na 1937 pe, na 1955, akoti na congrégation ena epayi wapi asilisaki kotanga. Sima ya bilako na ye ya suka, amipesi na botangisi. Sima, akei na Equateur, akotambola na masanga mingi. Akomaki mokambi enene, amipesaki na bopanzi Nsango Elamu na bana mboka Huaroani na bokambemi ya mwa bato ebele lokola mofulele Manuel. Ye pe ayokaki nsango ya bana mboka Tagaeri, baye bazalaki koyokana te na ba kompani ya pitolo na ya zamba.
Bakufi po na bobateli bato mike
Mofulele Manuel, lokola azalaki episkopo, akolikia tè mobulu ekozala te na ba mercenaire ya ba kompani, na bokei ye moko kosolola na ba indien. Mamelo Inés alandaki ye pe bango nionso mibale, bayebaki nini ekoki kokomela bango na bokutani n¡¯etuka moko elingaka bapaya te. Bakumbaki bango na hélicoptère na tongo ya 21 ya sanza ya sambo ya 1987 esika moko bayokanaki. Mokolo elandaki, hélicoptère moko ekendeki koluka bango, kasi bakutaki ba nzoto na bango bitondaki na makonga pe makula. Po na bango banso mibale, ezalaki bomipesi na boyebi bomoi na bango na kombo ya loboko na etinda na bango.
Epeskopo pe mokeli ya boboto na Inde
Lisolo ya moto ya misato ya lokumu ezali ya mwana ya Inde Matthew Makil, episkopo ya Inde pe mokeli ya lisanga ya ba Mamelo ya Botali ya Mwa Esengo Ngondo Maria. Abotami na 1851 na Manjoor na libota ya bakristu pe akuli bonganga Nzambe na 1865. Akosala sima ya mibu congrégation moko eye etinda likonzi ezali ya botangisi bana basi. Mosala na ye esalaki tè akoma vicaire apostolique ya Changanacherry na 1896.
Alembaki te na mobulu makasi kati na bato ya nordi (baye bamimonaka lokola bakitani ya lisanga esalemaka na santu Thoma Apostolu) pe bato ya sudi (baye bamimonaka lokola bakitani ya bato bawutaka Mésopotamie). Mgr Matthew alukaki kimia kati na masanga miye mibale. Na 1911 alakisaki na Papa Pie X likanisi ya kokabola vicariat ya Changanacherry na vicariat mibale. Moko po ya bato ya nordi, mosusu po na bato ya sudi. Papa Pie X andimaki likanisi eye pe asali vicariat ya Kottayan po na bato ya sudi. Ezali mosala Mgr Matthew amipesaki kino liwa na ye na sanza ya yambo ya 1914, sima ya bobeli moke.