Ba episkopo ya lokumu balingi kokota na conclave
Nsango ya Vatican
Lisanga ya ba episkopo ya lokumu ebengamaki na ngonga ya zomi mokolo ya misato na tongo na basilique Santu Petelo po na bozali na misa ¡°Pro Eligendo Romano Pontifice¡±, zambi ya boponi Papa. Ezali se likambo ekosalema na miso ya bato na conclave, po bandimi babengamaki na misa po na kosambela Elimo Santu zambi ya kosunga ba epsikopo ya lokumu na maponami ya Papa ya sika. Sima na yango, baponi bakokende na ndako Santu Martha epayi wapi mingi kati na bango bayingelaki mokolo ya mibale na pokwa. pe epayi wapi bakobombana kino conclave ekosila. Ba episkopo ya lokumu 133 bakozua kuna bilei ya tongo liboso ya kokende kobanda na ngonga ya 15 na minuti 45 na molongo pe elamba lolenge moko na chapelle Pauline liboso ya kokota na chapelle Sixtine.
Soki kaka bakoti na bisika na bango, ba episkopo ya lokumu bakoyemba Veni Creator pe bakolapa ndai, liboso lisanga, sima moko moko. Moto azali kokamba milulu akoloba po ya kobimisa bato banso libanda. Akotikala na chapelle Sixtine na ngonga ya bomanyoli ya episkopo ya lokumu Cantalamessa, oyo akopono te pe azali moteyi ya kala ya ndako ya Papa. Bomanyoli ena ekotala mingi mosala eye ba episkopo ya lokumu baponi bakosala. Sima ya bozui maloba, ba episkopo ya lokumu baponi bakotikala bango moko pe bakomikanga na fungola na chapelle Sixtine. Na libanda, bato bakozela po bamona milinga bikobima kuna, soki ezali moyindo elingi koloba nanu Papa aponami te, soki ezali pembe wana Papa aponami.