Synode, Papa andimi nzela ekomema na Lisanga ya eklezia na 2028
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Synode ya sika te, kasi Lisanga moko ya eklezia, yango ekosalema na Vatican na sanza ya zomi ya 2028 mpe nzela moko ya bosalisi ekosalema liboso. Episkopo ya lokumu Mario Grech, secrètaire général ya Synode, asakolaki yango na mokanda atindelaki mokolo ya 15 ya sanza ya misato ba episkopo banso na ba patriarche mpe ba episkopo ya ba Eglises orientales ya katoliko.
Bosali mokanda ya nsuka ya Synode 2024
Bosalisi ekomami endimamaki na Papa mokolo ya 11 ya snaza ya misato elekaki mpe etali eteni ya bosali mokanda ya Synode eye esilaki, nsima ya mibu misato, na 2024. Likambo likonzi ya Synode yango ezalaki ¡°Mpo na Eklezia moko ya Synode. Lisanga, bozaleli, mosala¡±. Lokola Santu Papa asembolaki nsima ya Synode, Mokanda ya nsuka ya Lisanga ya banso ya zomi na motoba ¡°esangani na Magistère ordinaire ya mokitani ya Petelo¡± mpe, mpo na wana, esengeli endimama. Oyo elingi koloba, elimbolaki episkopo ya lokumu, mpo na ¡°ba Eklezia ya bikolo mpe mangomba ya ba Eklezia¡±, bomipesi mpo ya ¡°bosali¡± ba nkoma ya Mokanda yango mei, na boluki lolenge ya ¡°bososoli mpe ya mokano¡±.
Kosala lisolo kati na ba Eklezia mpe o kati ya Eklezia
Eteni ya bosali, esembolaki episkopo ya lokumu Grech, esengeli te eyebana lokola ¡°bosaleli moko ya mitindo biwuti na bakonzi te¡±, kasi lokola ¡°lolenge moko ya boyambi¡± Mokanda ya nsuka. Yango esengeli ¡°ebongisama na mimeseno ya esika wana mpe na ba mposa ya masanga¡±, na bozali ntango inso na bokengi na likambo ya ¡°kokokisa¡± bokaboli mpe lisolo ¡°kati na ba Eklezia mpe Eklezia mobimba¡±.
Kosangisa ba sango, ba diakono, bamibonza mpe ba laïki
Kosangisa lisusu bato banso baye bapesaki makanisi o eleko ya Synode ezali na ¡°motuya monene¡± mpo na likambo ya bosali nzambi ya kokolisa ¡°boyoki ya ba Eklezia banso¡± mpe ya bososoli ya bakengeli ya mpata, ekobaki episkopo ya lokumu. Basali ya makasi bikozala bongo ¡°masanga ya Synode ya ba sango, ba diakono, bamibonza, ba laïki, mibali mpe basi, bakosalisama na episkopo na bango¡±. Masanga maye, esengi secrétaire général, bisengeli ¡°bilendisama¡± mpe, soki esengeli, «bakotisa bato ya sika, balendisa bango lisusu mpe basangisa bango na ndenge ekoki¡±.
Mangomba ya mosala mpe Commission canonique
Mosala nionso, ekomaki lisusu episkopo ya lokumu, ezali ¡°esika¡± epayi wapi ¡°mbano ya misala ya masanga ya boyekoli mpe misala ya Commission canonique¡± bisengeli kotiama. Tokundoli ete mangomba zomi ya boyekoli bisalemaka na Papa François na sanza ya misato ya 2024, ezuaka lotomo ya kotala mituna mibimaka na etapi ya yambo ya Lisanga ya Synode ya zomi na motoba eye esalemaka na 2023. Oyo etali Commission canonique, yango ebotami na eteni ya mibale ya Lisanga ya Synode na 2023 na ¡°boyokani na Dicastère eye etalaka mikanda ya mibeko, na mosala ya Synode¡±.
Kobanda 24 kino 26 ya sanza ya zomi, Jubilé ya mangomba ya Synode
Episkopo ya lokumu Grech alobaki lisusu ete bitapi ya nzela ya bosalisi na eteni ya bosali ya Synode mpo na kobanda. Na sanza ya misato, mbela mpo ya nzela yango moko mpe, na sanza ya mitano, bobimisi Mokanda ya ntina ekolakisa nzela ebongisami. Na sanza ya zomi, kobanda 24 kino 26, ¡°Jubilé ya mangomba ya Synode mpe ya masanga bizalaka¡± ekosalema.
Na mibu misato, Lisanga ya eklezia
Na nsima, na kati ya 2027, Masanga ya botali misala bikosalema na ba diocèse, Masanga ya ba episkopo ya bikolo mpe ya mokili mobimba. Kasi na kati ya 2028 ebongisami mpo na Masanga ya bikolo mpo ya botali mpe bobimisi ya eloko ya mosala ya Lisanga ya eklezia ya sanza ya zomi ya 2028.
Mbela mpo na kosambela mpo na Papa
Mokanda ya episkopo ya lokumu Grech esuki na bobiangi ya kosambela mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa François, oyo azali na lopitalo Gemilli ya Roma kobanda mokolo ya 14 ya sanza ya mibale.