ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.09 Inizio Esercizi Spirituali 2025.03.09 Inizio Esercizi Spirituali  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Karesimo : bokoti na bomoi ya seko ekotala bolingo olakisi na na komitungisa te

Tokobimisa na bokuse bomanyoli ya mibale ya ba Exercises spirituels bipesamaki na moteyi ya Ndako ya Papa na ndako ya makita Polo ya Motoba. Na bobeti nsete na oyo etali bokoti na Bokonzi ya Nzambe, sango Pasolini alobi ete ezali kotala bolamu ya molimo te kasi na bolingo epayi ya basusu.

Vatican News

Lisésé ya Bosambisi ya nsuka, elobami na Nsango elamu ya Matteo, elobamaka mingi lokola mbela ya kokaba. Kasi, bomanyoli moko ya mozindo ekolakisa likambo moko ya kokamwa: ezali bosambisi ndenge oyo toyebi te, kasi liloba ekolakisa bosolo oyo esili esalema na moto moko moko. Likambo ya kokota na Bokonzi ezali te kozala moto ya eklezia boye, kasi bolingo na yo ya solo epayi ya bandeko ya mibali mpe ya basi ya mike makasi, baye, na lolenge ya nsango elamu, bakolakisa bayekoli ya Kristu. Mokumba ya bakristu ezali ya liboso ya kosala malamu te, kasi kosunga basusu basala yango.

Lisusu, lisésé ekobalola ndimbola oyo toyebi ya bosambisi: bato ya sembo mpe ya mabe bango nyoso mibale bakolakisa bokamwi liboso ya maloba ya Mokonzi, elembo ekolakisa tè bolamu esalami kati na bango, babikaki na yango malamu mpe na kozanga koyeba. Wana elingi koloba ete bokoti na bomoi ya seko ekotala te malamu ya molimo, kasi na makoki ya kozala na bolingo ya komitungisa te.

Malongi ekoloba na eleko ya nsuka, Bokonzi ya Nzambe ekolakisama polele, ekobongola bato mpe mokili na ¡°likolo ya sika mpe mabelé ya sika¡± (CEC 1042-1044). Elikya ena ekokangama na elaka ya Kristu, oyo akobenga biso tozala kobanda sik¡¯oyo na likanisi ena, na komitungisa te na bolamu, kasi na kotiya motema ete Nzambe ye-mei akobongola bomoto na biso na lolenge na ye mpe na bokokani na ye, lolenge ya mwango ya bolingo eye ewuta na ebandela.

Yezu alobaka bomoi ya seko kaka te lokola eloko moko ya mosika ekokoma, kasi lokola likambo ekokokisama na baye bazali koyoka liloba na ye mpe bakondima Nkolo (Yoane 5,24). Nsango Elamu ekobianga biso tondima ete bomoi ya seko ebandaki kala: ekomonana na lolenge na biso ya kozala mpe ya kolinga, na bomifungoli na lolenge Nzambe akobanda kobongola. Likambo ya solo ya kokamwa ya Bosambisi ya nsuka ekozala komona ete Nzambe azali kozela eloko te epayi na biso, kaka ya kondima biso lokola bana na ye, bamiyingela kala na seko ya seko.

11 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 07:06