ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.09 Inizio Esercizi Spirituali 2025.03.09 Inizio Esercizi Spirituali  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Karesimo : batisimo ezali ? ebandeli ya nzela ya mbongwama¡±

Bokuse ya bomanyoli ya motoba ya Exercices spirituels biteyami na Curie romaine. Sango Roberto Pasolini, Moteyi ya Ndako ya Papa, azongelaki oyo etali mposa ya ? kobotama ya sika ya likolo ? mpo na ¡°mbongwama moko ya mozindo mpe ya makasi ?

Vatican News

Nzela ya libiki ekomonana lokola mbotama ya sika na molimo. Yango elakisami na Nsango Elamu ya Yoane na lisolo ya Yezu na Nicodème. Yezu alobi ete mpo na komona Bokonzi ya Nzambe, esengeli ¡°kobotama ya sika ya likolo¡±. Likambo eye etungisi Nicodème mpe ekoloba lisusu mposa ya mbongwama moko ya mozindo mpe ya makasi. Mbongwana ena ezali pete te mpe ekobota ntango mingi bobangi, pamba tè ekosenga kotika maye biyebani.

Yezu akolimbola ete mbotama ya sika ekosalema na nzela ya mayi mpe ya Elimo, ezali te kozonga lisusu na bomwana, kasi lokola bofungwami ya sika na mosala ya Elimo. Mingi bakobanga mbongwama mpe bakokangama na maye maleka. Kasi mbotama ya sika ya solo ekosenga komipesa na Nzambe mpe komitika bakamba yo na makambo biyebani te. Nzela ena ekokundola Bobimi ya Israël na eliki, epayi wapi bato bakobanga liwa, kasi bazuaki libiki na boluki na miso elembo epesami na Nzambe. Lelo, elembo ya libiki ezali Kristu atombwami na ekulusu.

Batisimo ekolakisa elembo ya bomoi ya sika wana lokola mbongwana ya sika mpe ekomonana te, kasi lokola ebandeli ya nzela ya mbongwama. Kasi, na lisapo, bokasi ya batisimo ekita, mpe ekoma mingi mpenza eloko moko ya bonkoko na esika ezala liponami moko ya boyambi ya mayele. Yango ememaki mwa mokakatano na Eklezia, esika wapi bomoi ya mokristu ekoma mosika mpe bongo bongo mpo na bato ebele.  

Yezu akobenga na liponami moko ya makasi. Kotiya boyokani na Ye liboso ya makambo nionso. Ezali te koboya bato banso yo olingaka, kasi koyeba lisusu ete ezali kaka na Nzambe nde bomoi ya solo ezali. Wana ekosenga kozala na molende ya ¡°kobungisa bomoi ya yo moko¡± na lolenge ya nzoto, mpo ya bozui yango na lolenge ya libela.

Na nsuka Yezu akosalela lisese ya elilingi ya kobota mpo na kolimbola ete mbotama ya sika ya molimo ezali nzela moko ya mpasi kasi ya ntina. Moto moko moko abengami abima na ¡°kati na ye¡± ya ebandeli mpo na koyamba bonene ya bomoi ya seko. Santu François azali ndakisa ya moto atikaki manso ya bokengi mpo na koyamba na mobimba bomoi ya sika na Kristu.

Na bosukisi, mbotama ya sika ya solo ezali lokuta te, kasi eloko moko ya solo ekozuama na oyo akomitika babongola ye na Elimo, na kobika kobanda sik¡¯oyo na elaka ya seko.

12 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 13:48