ÐÓMAPµ¼º½

Luka

LA PIAZZA FUCSIA, MIGLIAIA CONTRO GUERRA E PATRIARCATO LA PIAZZA FUCSIA, MIGLIAIA CONTRO GUERRA E PATRIARCATO  (ANSA)

Jubil¨¦ ya volontariat : Roma ekozela bato 25000

Likambo ya mbala ya mitano ya Jubil¨¦ ebongisami mpo na bato ya volontariat mikolo ya 8 mpe ya 9 ya sanza ya misato. Bato 25000 bakowuta koleka bikolo nkama bakokutana na Roma.

Vatican News

Bana ya Italie 15000, ba nkama ya bato misusu bakowuta Amerika, Espagne, Brésil. Bakozala 25000 baye na lopoto babengi ba ¡°volontaires¡± bakosangana na Roma mpo na Jubilé ya volontariat, likambo mokonzi ya mitano ya Jubilé. Bandimi baye bamipesa na masanga kilikili bakowuta na bikolo koleka 100, mingi mpenza na Inde, Equateur to lisusu Australie.

Eloko ya liboso ebongisami mpo na bango mokolo ya poso 8 kobanda ngonga ya 8 kino ya 17 ezali boleki na Ekuke Esantu ya basilique Santu Petelo ya Roma. Ekuke ena efungwamaka kaka na mibu ya Jubilé, mpe koleka yango ezali kati na mikano mpo na kozua bolimbisi ya masumu nionso.

Ba pèlerins bakoki kozua lokola sacramento ya boyokani (réconciliation) na kati ya basilique Santu Petelo ya Roma. Ba sango bakozala ebele mpo na koyoka ntubela na minoko mingi.

¡°Masolo na Roma¡±

Na nsima ya midi, kobanda ngonga ya 15 kino 17, bisika bebo ya Roma bikoyamba ¡°Masolo¡±, bokutani ekotala mingi makambo ya bonkoko, ya ntoki mpe ya molimo. Masanga mingi ya Italie bikolakisa misala na bango mpe babongisi misala ya masano mpo na bana mpe eleko mpo na masolo.

Mokolo ya eyenga 9 ya sanza ya misato, ba pèlerins bakosangana na esika ya Santu Petelo mpo na misa ya bosukisi eye ekosalema na episkopo ya lokumu Michael Czerny, mokambi ya dicastère ya Botomboli mobimba ya moto. Papa François akozala te, azali kaka na lopitalo Gemelli, kasi episkopo ya lokumu Czerny akotanga liteya Papa abongisaki mpo na likambo eye.

Jubilé eye esalemi nsima ya baye ya bapanzi nsango, ya ba mampinga, ya bato ya ntoki mpe na ba diakono.

09 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 13:39