ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Rosari a S. Pietro per il Papa, stasera con mons. Arellano Rosari a S. Pietro per il Papa, stasera con mons. Arellano  (ANSA)

Esika Santu Petelo, Mgr Zani akolendisa na losambo mpo ya Papa

Na bokambi losambo ya Maria ya sapele na mpokwa ya mokolo ya minei 20 ya sanza ya misato, archiviste mpe biblioth¨¦caire ya Eklezia Esantu ya Roma atikaki episkopo ya Roma na Ngondo, na bolobeli na ye mpo ya libiki ya Papa. Bandimi basanganaki lisusu, na komema na losambo Santu Papa oyo azali na lopitalo Gemelli kobanda mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale.

Nsango ya Vatican

¡°Na bolobi sapele, tokobelela Ngondo Maria, Mama ya Eklezia, mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa François oyo tozali na ye elongo mokolo na mokolo¡±. Ezali na maloba wana nde Mgr Angelo Vincenzo Zani, archiviste mpe bibliothécaire ya Eklezia Esantu ya Roma, abandaki na mpokwa ya 20 ya sanza ya misato, losambo la sapele mpo ya bokolongono ya nzoto ya Papa François, na esika Santu Petelo.

Mibombamo ya Mwinda

Na losambo ya Maria, bandimi bazalaki wana bamanyolaki Mibombamo mitano ya mwinda: ¡°Batisimo ya Yezu na Yordani¡±, ¡°Likamwisi ya yambo ya Yezu na libala ya Cana¡±, ¡°Bolobeli Bokonzi ya Nzambe mpe bobiangemi na mbongwana¡±, ¡°Mbongwana ya Yezu na ngomba Thabor¡±, mpe na nsuka ¡°Bokeli Ukaristia¡±. Ba episkopo ya lokumu, episkopo, sango, mamelo ya Curie ya Roma mpe ya diocèse ya Roma bazalaki wana lokola na mpokwa inso, kosambela mpo ya Papa François.

Boyambi mpe elikia

Nsima ya bolobi Ave Maria mitano, ya Salve Regina mpe Litanies ya Lorette, Mgr Zani abelelaki Nzambe mpo tè, na bolobeli ya Ngondo, alendisa boyambi mpe akolisa elikia ya bandimi, ¡°mpo ete libaku moko te¡± ekoka ¡°kobungisa bango na nzela ekomema na libiki¡±. Losambo ya Maria esilaki na Oremus pro Pontifice mpe na hymne na Ngondo Maria.

22 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 12:45