ÐÓMAPµ¼º½

Luka

LA CHIESA PREGA PER IL PAPA, IL ROSARIO A PIAZZA SAN PIETRO LA CHIESA PREGA PER IL PAPA, IL ROSARIO A PIAZZA SAN PIETRO  (ANSA)

Esika Santu Petelo, ¡°lolaka ya mokili¡±, bomoko na losambo mpo na Papa

Na esika Santu Petelo, bolobi sapele mpo na bokolongono ya nzoto ya Santu Papa esalemaki mokolo ya eyenga na mpokwa n¡¯Acad¨¦mie pontificale eccl¨¦siastique, eteyelo ya ba ntoma ya Papa na Roma. Mokambi na yango, Mgr Salvatore Pennacchio, abiangaki na bosali mikano ya losambo ya Papa Fran?ois mpo na ¡°boboto kati na bato, bobiki na mpasi mpe bomoko ya bandimi¡±.

Nsango ya Vatican

¡°Lelo lisusu, kobanda esika eye ekomi lolaka ya mokili, tosangani na losambo ya lisanga mpo na lobiko na lombangu ya Papa François, na bana nionso ya Nzambe. Elongo na bakambi minene, bayekoli na bana kelasi ya kala y¡¯Académie pontificale ecclésiastique, tolingi tozala mongongo ya bokebi esengeli na Papa mpo na moto nionso. Tozua mikano na ye ya losambo mpo na boboto kati na bato, bobiki na mpasi mpe bomoko ya bandimi¡±. Wana ezali maloba ya Mgr Salvatore Pennacchio, mokambi y¡¯Académie pontificale ecclésiastique, abimisaki liboso ya bobandi sapele na esika Santu Petelo mokolo ya eyenga na mpokwa, 16 ya sanza ya misato, mpo na bokolongono ya nzoto ya Papa François oyo azali na lopitalo Gemelli, kobanda 14 ya sanza ya mibale.

Bomanyoli ya Mibombamo ya Nkembo

Ba episkopo ya lokumu, ba episkopo, ba sango, ba nyango ya Curie romaine mpe ya diocèse ya Roma, na bandimi ebele balandi sapele lisanga mpo na kotika mokitani ya Santu Petelo na losambo ya Ngondo Maria. Nsima ya bomanyoli mibombamo mpe bolobi Salve Regina, Mgr Salvatore Pennacchio asambelaki mpo ete Mokonzi apesa na bandimi ¡°koyeba kosalela ntango inso bokolongono ya nzoto mpe ya molimo¡±. Asengaki lisusu na Maria abikisa biso na ¡°ba mpasi bikopesa biso mawa mikolo miye¡± mpo na bomemi biso ¡°na esengo ya nsuka te¡±. Lisanga esukisaki losambo na boyembi Oremus pro Pontifice mpe episkopo abenisaki bato bazalaki wana liboso bazonga bipayi na bango.

 

18 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 14:08