Episkopo ya lokumu Pr¨¦vost : ? Totika Papa na Maria mobondi ?
Vatican News
¡°Totelema na losambo na Maria, Mama ya Eklezia, mpo na bokolongono ya nzoto ya Santu Papa François¡±. Wana ezalaki bobiangi ya episkopo ya lokumu Robert Prévost, mokambi ya dicastère mpo na ba Episkopo, na ebandela ya losambo ya sapele na esika Santu Petelo mokolo ya moko 3 ya sanza ya misato na mpokwa. O eleko ya losambo ya mbala ya mwambi elandani mpo na bokolongono ya nzoto ya episkopo ya Roma, ebongisamaki na Vicariat ya Cité ya Vatican, episkopo ya lokumu alobaki ete Ngondo, ¡°Mama ya Elikya Esantu, asunga, abikisa mpe abondo baye banso bazali kokima epayi na ye¡±, na kosenga ete azala ¡°elembo moko ya mbondi mpe ya elikya ya solo¡±.
Na nse ya elili ya Maria, etiami liboso ya basilique ya Vatican, mokambi ya dicastère mpo na ba Episkopo akambaki losambo ya sapele. Ba episkopo ya lokumu, ba episkopo, ba sango, ba mamelo ya Curie ya Roma, ya diocèse ya Roma mpe ba nkama ya bandimi baye mokolo na mokolo na ngonga ya ntuku mibale na moko, kobanda mokolo ya 24 ya sanza ya mibale bakosangana liboso ya basilique mpo na kotika libiki ya Papa François na libondeli ya Ngondo Maria.
Nsima ya bomanyoli mibombano ya esengo mpe bolobi Salve Regina, episkopo ya lokumu Prévost abeleli Nzambe mpo atinda Elimo na ye ¡°mpo na kosunga biso na bolembu na biso, mpo ete, bompikiliki na boyambi, tokola na bolingo mpe totambola lisanga mpo na kokoma na elikya ya esengo¡±. Mpo na kosukisa losambo, lisanga eyembaki Oremus pro Pontifice, liboso ya bobenisi ya episkopo ya lokumu.